Náni Qui, Quel
Lipápa ya náni ? Les sandales de qui ?
Kómbó na yó náni ? Comment tu t’appelles ?
Náni azalí molakisi na bínó ? Qui est votre enseignant ?
Mamá náni atindí yó ? Quelle maman t’a envoyé ?
Ozalí mwána ya náni ? Tu es l’enfant de qui ?
Pluriel : banáni
Léki ya banáni?
Banáni bafándaka na Mikonga ? Qui habitent à Mikonga ?
Mamá na banáni atékáka na wenze ya Saint-Hilaire ?
La mère de qui vend au marché Saint-Hilaire ?
Níni Quoi, Quel(le), Qu’est-ce que
Níni? Quoi ?
Níni! Qu’est-ce qu’il y a ?
Sango níni? Quelles nouvelles ?
Ozalí koluka lipápa níni? Tu cherches quelles babouches ?
Ndáko na bangó ezalí ndéngé níni? Comment est leur maison ?
Olobí níni? Qu’est-ce que tu dis ?
Bosómbí níni? Qu’est-ce que vous avez acheté ?
Vraiment vraiment je suis très ravi de votre cours,j’ai l’envie d’apprendre le lingala le plus tôt possible.allez-vous m’aider?
Ravi que cela vous plaise. Je viens de mettre le syllabus en ligne.