Soki bolingi kotonga mboka, tina ya kotomboka te. Ekoluka bato bakufa pe mabelé babotola.
Soki bolingi kotonga mboka, ekosenga kaka koluka mayele ya kotangisaka pe koteyaka bayi-mboka, na libanda ya biteyelo oyo esi ebeba. Kokela mobongisano ya sika ya eteyeli.
Kasi moto moko te. Ekosenga lisanga ya baye bamindimeli ete balingi kotonga, bazala na mokangano ya bayi-bwanya balenda, baye bakimaka mvula na mopepe te.
Bosali mbula 20, boyinga (ignorance) ekosila. Bayi-mboka bakokoma bansomi.
Na boye mboka ekotongama lokola zamba ebotaka.