Monene ezanga suka
Omeki kaka kozwa likanisi
Ya monene ezanga suka
Ndenge akela nyonso
Pe atia yango na molongo
Atia mibeko ya bosombitinyi
Oyo esalaka ete na bikelekete moke
Quark, bozon, fermion,
Proton, netron, elektron
Asala baatomi lolenge na lolenge
Lelo toyebi lolenge 118
Na baatomi wana
Asali nyonso oyo esimbamaka
Atia sango ya ebotameli
Na kati ya emoyi
Mwasi moko mobali moko
Baboti bana bilongi pene kasi ekesana
Asali minzoto ndenge na ndenge
Atandi mikili ndenge na ndenge
Ezungulukelaka
monzoto na monzoto
Atandi minzoto na bituluku
Atandi bituluku na bopalangani
Ezanga suka