Nafandi na libanda ya 7eme rue. Namoni bilenge mibale bazali koteka biloko ya kotambola.
Moko azali koteka bitiei-móto (bachargeur) ya telefone.
Mosusu namoni malamu te : ezali bibomba-zolo pe biloko mosusu.
Oyo ya bibomba-zolo alobi na moninga soki matumoli nini, nayoki yango malamu te.
Tango asilisi koloba akimi mosika.
Oyo batumolaki alobi :
– Omoni yo? Nakobeta yo awa te po bato bakokotela yo.
– Okobeta ngai wapi?
– Yo? Nakobeta yo liboso ya parquet.
Natuni ye :
– Po na nini liboso ya parquet?
– Po bamagistrat na baavocat baza sur place. Bakokanga biso mibale. Tokosamba mais asi alie makofi.