Na Lingála préfixe babengaka yango ebandi. Tozali na bibandi óyo:
mo-, ba-, li-, ma-, e-, bi-, ki-, lo-, ko-, m-, n-
Na Lingala, ezali na maloba oyo ebandaka na mo-
a) Soki ezali kombo ya moto, na ebele ekokoma ba-
moboti —> baboti
moteyi —> bateyi
Moluba —> Baluba
b) Soki ezali kombo ya eloko, mo- ekokoma mi-
motema —> mitema
motambo —> mitambo
mopepe —> mipepe
c) Ezali na mwa bakombo ya bato, yango na ebele ekomaka mi-
mobali —> mibali (Ezali na Lingala ya lelo. Na Makanza : babali)
moyibi —> miyibi
mondele —> mindele
mobange —> mibange