Na nzembo oyo, mwasi bakabwana na mobali pe azali kokanisa mobali yango. Mabanzo ya mobali yango ekomeli ye kilo na boongo. azali ata na posa abosana kasi akomi lokola azali na boloko.
Esengo na kotala te kasi mayele pe akima yango ezali te. Likambo oyo mobali aboyela ye, abengi yango « likambo ya bozoba ». asalaki makasi po balingana, bazala elongo, kasi lelo oyo ebimi ete, bakabwani likolo na ye.
Asaleli lisese po na komonisa boni boni ezali pasi po na ye abosana mobali yango ata ko bato bakoma koloba ete mobali aboya ye. Ata pe ayoka ete, mobali yango akoma na mwasi mosusu, abeti lisese : « Ebale ata ko ezali bipale, ata ko ekatisi ndenge nini, ekosuka obe na ocean« . Totanga maloba
Ferre Gola – 365 jours fois deux
Ebele ya makanisi
nyonso na bongo moko
nakoma kobanza lokola
prisonnier na boloko
spectacle eza désolant
mais inévitable .
Nabandaki kosentir
yango avant ekoma
oyini ngai
po na likambo ya bozoba
effort nyonso nasala
po ngai na yo tolingana
Oremettre yango en cause
Surprise nyonso
etonnaka te
boni boni
olobi ngai :
oublions le passé
ngai nakoka na ngai te
basouvenir ya kitoko
eleki trop
Ebale ata ko ezali bipale
ata ko ekatisi ndenge nini
ekosuka obe na ocean
nakosuka epayi na yo
oza ocean ya beauté
pe refuge ya bolingo na ngai
Baproblème eleki nde koleka ngai
na mobembo na bozongi na ngai
lamuka ngo
Nayei koyeba
tina oyo nazalaki
mwana ya mawa
na mboka ya bisengo
nzoka ozalaki te
yo ozalaki te
yo ozalaki te
Mayi ya miso
natangisi liboso na yo
ezali erosion ya bolingo
oyo tozanganaka par ma faute
Kopesa ngai lisusu etumbu te
nanyokwami
trop abandonnée
Kopesa ngai lisusu etumbu te
nanyokwami
trop abandonnée
Ozali Kilimajaro na ngai
bolingo na biso
ekomama na babuku ya kala
avant tobotama
Et pourtant chéri
tu le sais que je t’aime
bolingo na ngai
opesi yango
epayi na ye
nazali kozela yo
ozongela ngai
Balobi na ngai
yo osi oboya ngai
pamba
eza pamba
365 fois deux
nombre ya bandoto na ngai po na yo
365 fois deux
nombre ya bandoto na ngai po na yo
Mokolo na ngai ya suka ya esengo
ezalaki mokolo
tozalaki kokabwana na yo
deux ans plus tard
conscience na ngai elamuki
tout devient rose
mon cœur se remet à ta couleur
365 fois deux
nombre ya bandoto na ngai po na yo
Nazelaka bolingo na yo
Nazali na retard ya deux ans ya pongi
mokolo na ngai ya suka ya esengo
ezalaki mokolo tozalaki kokabwana na yo
deux ans plus tard
conscience na yo elamuki
tout devient rose
mon cœur se remet à ta couleur
Mokolo okendeki
ngai natikalaki
na souci na yo
Nasala ke ozonga
na bolingo na ngai
po mokolo okendeki
ngai natikalaki
na mawa ya kokanisaka yo
j’aimerais bien parler…