Eloko oyo olela-lelaka butu na moyi
Ekobongwana te po ozali kolela
Ekobongwana te po ofundi na libanda
Ekobongwana te po obeleli Nzambe.
Ekobongwana tango okosangisa
Oyo ya yo bibundeli
Pe okokende kobunda
To akobeta yo
To okobeta ye
Po na sikoyo
ye nde azali kobeta yo.
Tika kolelalela
Milengela po na etumba
Nguya pe bwanya
Ezali kati na yo
Libanda te
Likolo te
Na se ya mabele te.