CV elakisi baclasse otanga te. CV elakisi oloba, banda obotama, makambo nini osala oyo ezali kotinda yo omiyoka ete okoka kosala mosala oyo ozali koluka kosala sikoyo.
Soki otanga te, kokosa te ete otanga. Kotanga esukisi makambo nyonso te.
Moto oyo aloboko mbisi na ebale lelo mbula 40. Akoki koloba pe ete:
nayebi mbisi, nayebi mombongo, nayebi mpela na elanga, nayebi ndenge ya koyangela bato (natambusi lingomba ya babomi-mbisi lelo mbula 20.
Nayebi ndenge ya kosala ete ngulupa mibale bazali na mikakatano, nayebi ndenge ya kosala ete bayokana.
Nazali moyibi te. Tuna na mabongo nyonso : Kisangani, Boende, Mbandaka, Bolobo, Mushi, Ilebo, Tshikapa, Kingabwa, tuna bango sango na ngai, moko te akoloba ete ayoka ngai na likambo ya moyibi.
Yango wana, lokola Kongo ekomi na mpasi.-Botika ngai nakamba bino.
Yango nde CV
Curriculum vitae na kilatin. To Nzela ya bomoyi.