Sima na lobi, tango oyaki, nayokaki posa ya kozinda na se ya mabele. Elongi pe nzoto elimwa na miso ya bato. Posa ya kolela eyelaki ngai lokola liboma. Balabala mobimba ebukanaki na milolo ya kowolola. Etumba oyo okendeki kobunda, lelo esilisi mboka mobimba. Bana ya Ituri bazangi bamama, basi ya Beni bazangi mibali, mibali ya Kasai bazangi basi. Mibali oyo bobomaki te, soni elata bango. Po na oyo ya Continuer la lecture de Bitumba bokendeki na Ituri, Beni, Kasaï…
Catégorie : Masolo
Oyei te, okeyi wapi?
Pokwa esi ekotaki kala
Yo nde osombaka nguba na manyoko
Yo nde tozelaka po tolia na pokwa
Oyei te, okeyi wapi?
Nalelaka po na nini?

Lelo mbula tuku mibale na moko
Nalelaka
Okende
Otika ngai
Nabosanaka te
Nalemba kolela
Continuer la lecture de Nalelaka po na nini?
Congo eee! Hé? 2
Kanda bato wana bazalaki na yango eyokisi ngai mwa somo. Namilobeli : « bakoya kotuna ngai, soki nazali nani. Tango bakoyoka ete nazali Continuer la lecture de Congo eee! Hé? 2
Congo eee! Hé? 1
Lobi na tongo, nayaki kotala chérie na ngai Pipina. Nakomi liboso ya lopango na bango, Continuer la lecture de Congo eee! Hé? 1
Sanza nguma, na mokili moto malamu azali te
Lisolo oyo nakomaki yango mwa kala. mikolo yango, nazalaki kokutana na banko moko ya kosakana te. Kaka ngai te. Okomona … Continuer la lecture de Sanza nguma, na mokili moto malamu azali te