Na esika ya koseka moto oyo azoloba français mabe, ekosenga na biso koluka mayele nini po moto oyo alingi koloba français, aloba yango malamu.
Oyo pe ayebi malamu monoko na ye ya Kongo, azala na soni te ya koloba yango : lingala, kiswahili, kikongo, tshiluba, … to mosusu.
Sikoyo, soki otandi mapolomi na yo na miso ya mokili mobimba, soki mapolomi yango ozwa yango na Kongo, ekosenga na yo osala makasi po elobeli, ekomeli pe eyokeli na yo ya français ekola.
Papa Wemba asalaki yango, akokaki, yo pe okoki. Mipesa kaka.
Oyo nalobi po na français, eza pe po na minoko na biso.
Eza te po lingala, oloba bilobela, okoma bikomela, oyoka biyokela.
Soki oyebi kokoma lingala te, yekola. Okoyeba. nyonso bayekolaka kaka.
Kolisa eyokeli, po tango okoloba to okokoma, bato bazwa ya motuya, bazwa ya litomba.