Mokili óyo mawa té
Baníngá bóyóka
Lisapo onge,
Boyámbáni lisapo baníngá
Bazaláká sé bána
Aïsa ná Zoé
Balingánáká
na bolingo ya folie
Bolingo na bangó
ekómáká impossible
Baparent ya Zoé
Bapusákí makambo
Zoé azwákí mokúmbá
Aïsa na mobembo
Babálísákí yé
Na mobáli ya mosolo
Aïsa ásála níni
Nyónso sé lisumá
ya Adamu na Eva
Balíáká ndé mbuma
Bébé na mabóko
Aïsa na motéma
Butú na mói
Zoé akómá sé kolelalela
Aïsa ee, Aïsa oo
Aïsa nza wísa
Aïsa aa, Aïsa ee
Aïsa nza wísa
Aïsa ee, Aïsa oo (6x)
Yáká, yáká Aïsa
Ngáí mwásí na yó
Áwa ngáí nazalí
Esengo té
Sé kolelalelaka yó
Chéri na ngáí
Nandimá nyekese
Nalingí óyéba Aïsa
Nazalí sé wa yó
Mosíká na mísó
Pene na motéma
Mamá ná bébé na yé
Bakábí chérie na yé
Na moto mosúsu
Mawa, mawa…