Na Kinshasa, soki moto ayebisi yo : « zonga mutu », elingi koloba : Opusi bozoba, na ndelo ya mabe penza.
Ayokeli yo mawa, apesi yo tango ya komona bozoba osali. Apesi yo tango ya kobongisa mabunga na yo.
Soki obongisi, akozonga komona yo, ndenge azalaki komona yo liboso. Po na tango ayebisi yo boye, na miso na ye, ozali lisusu moto te.
Soki owumeli na bozoba yango, akozwa yo pe bongo.
Salela tango, mikolo ezali mabe.