Batunaki ngai motuna oyo :
Mbote yaya nalingi nasenga yo soki okokoka kolimbola nzembo wana « triple option » ya Papa Wemba pe Barbara Kanam ! Matondo mingi ya liboso.
Nayebaki nzembo yango te. Yango wana esengaki ngai nayoka yango nanu malamu po na koyeba ndenge ya kolimbola yango. Lokola pe makomi na yango ezali na internet te, nalekisaki mwa ngonga po na kokoma yango.
Kombo oyo « Triple option » ezali na français. Elakisi maponi misato, elingi koloba nini ? liboso ya kopesa ndimbola ya liloba oyo triple ption, tomeka nanu koloba na mokuse, nzembo yango ezali kolobela nini ?
1. Bokuse
Nzembo oyo ezali lisolo ya bato mibale : mwasi pe mobali.
Mwasi azali koloba ete ayebi kobongisa nzoto na ye po abima malonga na miso ya bato. Ayebi ndenge asalaka po mibali bakweya ya mayanga. Alobi ete, azali na makambo misato asalaka : abendaka, akangaka pe alengisaka. Yango nde azali kobenga “triple option” (mabakami misato). Soki mabakami wana misato ekweleli yo, ozali na ndenge ya kokima te. Kasi po na kozala na mabakami yango misato, mama na ye ateyaki ye malamu : Eyaka yango moko te, esengaka kozala tango nyonso na kati ya koyeba ete esengeli komibongisa, komisala bopeto, kotia malasi, kodenda pe mwa basekele po nzoto ezalaka tango nyonso ngebu-ngebu.
Mobali, po na ye, azali kobeta lisolo, boni boni akweyaki na bolingo po na mwasi oyo. Aye kososola ete ezali mabakami misato oyo mwasi asalelaka nde ekanga ye.
2. Bososoli
Na loyembo oyo, Alanga nzembo asaleli mayele mibale po na kolakisa makanisi na ye : bokokanisi (comparaison) pe botuni masese (questionnement des proverbes). Tokolimbola yango na bozindo. Na oyo etali elobeli, asaleli oyo babengaka : kokambika na minoko to alternance codique elingi koloba azali koloba na lingala kasi maloba ebele ezali na français. Tokolimbola maloba yango na sima;
3. Bokokanisi (comparaison)
Alanga nzembo asaleli makokanisi mibale (deux comparaisons) : ya nzebi ya fiziki pe ya bilei.
3.1. Nzebi ya fiziki
Ndenge asalaka ete mibali bakweya mayanga, batalaka ye na nzela akokanisi yango na makambo ya fiziki. Alobi : « Mabele ezalaka na puissance ya koattirer babengi pesanteur. Ebongo ngai avec triple option : pesanteur, courant pe aimant. Nabendaka, nakangaka pe nalengisaka ».
Kobenda abendaka mibali, akokanisi yango na mobendo (pesanteur) oyo ya mabele. Po mobendo (pesanteur), bokasi wana oyo ezalaka na katikati ya mabele, ebendaka biloko nyonso. Yango nde esalaka, soki obwaki libanga na likolo, suka-suka ekokweya na mabele.
Mobali soki apusani pene na ye, akokende lisusu te, akoluka lisusu na mipanzi te, akotala lisusu basi mosusu te. Akokanisi yango na mokango (magnetisme). Aimant ebendaka bibende pe ekofanda ya kokangama na aimant.
Mobali soki olingi koya na maseki, okomona makambo na yo. Okobanga pe po na kopusana po bopeto na bonzenga oyo azali na yango elengisaka. Akokanisi ezalela wana na ndenge soki osimbi basinga ya lotiliki okolenga. Na fiziki babengaka yango molengo (electrocution).
3.2. bilei
Kitoko pe kongenga ya mwasi, akokanisi yango na bilei.
Nzembo ebandi na maloba ya mwasi. Mwasi azali koyemba, alobi ete lokola “likayabu elelaka tshololo na kikalungu , mwasi pe ebongi alela tshololo na nzela». Makelele wana ebimaka tango moto abwakaka likayabu na kati ya mafuta, epesaka bato nyonso oyo bazali nzinga-nzinga posa ya kolia likayabu yango. Yango wana, mwasi pe tango abimi na bala-bala, esengeli bato nyonso bamela soyi tango bakomona ye. Alanga nzembo akokanisi bosepeli na mwasi pe posa ya bilei.
Elengi na ye, akokanisi yango na elengi ya mayi ya malala : “Naza masanga oyo ebongisaka feti, Jus naturel, Elengi na lolemo”.
Mobali aye kokamata maloba. Ye pe akobi se na kokokanisaka bosepeli na mwasi pe biloko ya kolia. Mwasi yango, kombo na ye Zaïna-mwana-ya-mvwama. Mobali alobi Zaïna azali lokola mbolongo na kikalungu. Posa oyo ezwaka moto oyo azali na nzala pe azali komona mbisi ya tomson ekalingami pe ezali kongala na kikalungu, yango nde soyi oyo ye amelaki tango amonaki Zaïna-mwana-mvwama.
Mobali alobi ndenge akweyaki mayanga na bolingo po na mwasi oyo. “Mwana ya mvwama, mbolongo na kikalungu, zolo makale-kale, miso trouble, monoko emeli soyi, posa egrignoter. Makanisi es’envoler, rêve se na table, esprit na ngai ekomi envahi. Soki na eklezia, bakoloba envoutement. Po na clin d’oeil ya pamba, moto atomber amoureux » Aye kososola ete, ezali nde po Zaïna asalelaki « triple option ».
3.3. Kozala na kati ya koyeba (conscience), banzete, banyama pe bibende
Po mwasi abenda, akanga pe alengisa, alanga-nzembo alobi ete, eyaka yango moko te. Esengaka kozala tango nyonso na kati ya koyeba ete, esengeli komibongisa, komisala bopeto, kotia malasi, kodenda pe mwa basekele po nzoto ezalaka tango nyonso ngebu-ngebu. Alanga-nzembo akokanisi kozala na kati ya koyeba (conscience) na mapapu ya ndeke, to pe, na binyanyi (nageoires) ya mbisi.
Mapapu nde epesaka ndeke makoki ya kopumbwa na likolo. Binyanyi ya mbisi yango nde epesaka ye makoki konyanya (konager) to kopusana na kati ya mayi. Eloko oyo ekopesa mwasi makoki ya kobenda, kokanga pe kolengisa mibali, ezali nde kozala na kati ya koyeba : « Assurance ya ndeke, mapapu na ye ; ya mbisi eza banageoire na ye ; oyo ya ngai mwasi, ezali kozala consciente. Moke, monene, mokuse, molayi, eza baqualité, surtout proprété, mwa nsunga ya bien, secret yango wana. Triple option ekosimba ».
Kozala na kati ya koyeba wana nde etindi mwasi abelela ete : « Jamais nakondima baloba ke nabeteli. Po nayebi secret ya komisala ngebu-ngebu. Triple option en action. Valeur na ngai, moto akokakola te. Siatapata! ». Bonkutu (secret) yango, mama na bango moto alakisa ye yango. Mwasi alobi boye : « Merci mama olakisa ngai malamu. Nalamuka na tongo, nakoti douche. Curer na ngai, nayebi le pourquoi. Résultat na yango : partout où je suis, okuti ngai na ndako, omoni canon ; Nabima na nzela Wana nde scandale.»
Mpiko na ye ebombama kasi ezali. Yango wana akokanisi yango na ebende. Ayebi ete bato misusu bamikosaka tango bamonaka ye azali kodenda, bakokanisa ete ezali bibukana-bukana nzoka nde amikokanisi na ebende. “Po nadendaka, babengi ngai fragile. Nzoka nde ebende ».
Na nzembo oyo, mwasi akokanisi nsunga oyo ebimaka na nzoto na ye, na nsunga oyo ebimaka na mbe (fleur) oyo elonama na bilanga pene ya ndako : « Naza …Parfum ya bafleur ya Jardin, nzambe. Art ya suka ya maboko ya Yawe” soki otali kitoko ya mbe (bafololo), okomona ete Nzambe azali moyi-ntoki (artiste) ya makasi. Po na Alanga Nzembo, mbe ezali etapi ya suka ya ntoki (art) ya mokeli. Solo oyo mbe etindaka na zolo ya bato ezalaka na ngembu-ngebu pe sembe-sembe ya suka.
Alakisi ete ata bato bakoki komonana lokola bazali ndenge moko, ndenge ya kosalela makambo nde ememaka bokeseni. Yango wana alanga-nzembo akokanisi bokeseni ya basi pe bikomeli oyo tosalelaka. Craie ekomaka, touche pe ekomaka. Kasi ndenge touche ekomaka, ekeseni na ndenge marqueur ekomaka. « Papa alobi : ezala stylo to marqueur, oyo ezocompter ezali : ekomeli. crayon, craie, ata touche, ekomeli kaka ».
4. Botuni masese ( bondimi pe bokesenisi)
Tosalelaka masese po na kofandisa likanisi oyo ezwami lokola liteya. Na loyembo oyo, alanga-nzembo asaleli masese na lolenge mibale : lolenge ya liboso, asakoli yango ndenge ezalaka pe andimi yango pe akotisi yango na liteya na ye. Yango nde tobengi bondimi.
4.1. Bondimi : “Soso amela mayi na mozindo po na na kolanda masta na ye libata”.
Soso, lokola amonaki ete ye na libata, bawaya-wayaka na mboka, tango amoni libata akeyi na ebale, ye pe alandi. Nzoka nde libata, ndenge bakela ye, ayebi ndenge ya kotepa na mayi. Soso amoni libata akeyi na mayi, ye wana pe akeyi komibwaka na ebale; lokola ayebi mayi te, ameli mayi. Elingi koloba ete, kosala likambo te po omoni moto mosusu asali. Miyeba soki ozali nani, olingi kosala nini, pe po na nini olingi kosala likambo yango. Okokoka kosala yango ?
Alanga nzembo abeti lisese oyo na ebandeli ya loyembo kasi ndimbola na yango emonani ete : soki mwasi, alingi abenda, akanga pe alengisa mibali, ezali na oyo esengeli kosala. Soki te, okosuka lokola soso na katikati ya ebale.
4.2. Bokesenisi : Keba na philosophie pe baslogan ya bayi-mokili, Po de fois eruinaka
Ekosenga mwasi asala keba. Komitika, kozanga kolengela nzoto ekoki kotinda mobali akende mosika. Wana triple option ezosala lisusu te. Yango wana alanga-nzembo alobi : “Soki omoni chérie akomi kolia quelque part, ce que ndako na bino ekoti mindondo”. Po na kokima makambo ya bongo, alanga –nzembo akebisi. Lisese mosusu okoyoka, kondima bindimela te. Abimisi masese mibale oyo, po na ye, esengeli kokotisa mwa bokeseni. Ezali penza solo te.
Lisese ya liboso ezali : « basi nyonso bazali ndenge moko ?” Alanga-nzembo aboyi yango. Atuni : « Nani yango aloba : basi nyonso bazali ndenge moko ? Est-ce oyo ya Bagowu na Biyoncé, bazali ndenge moko ? Kotika te, po basi bakeseni.” Aboyi likambo ya koloba ete basi nyonso bazali ndenge moko. ndenge mwasi akomilengela, ekopesa bokeseni. Basi nyonso bazali ndenge moko te.
Lisese ya mibale aboyi ezali : “Nani pe aloba : « kitoko ezali mabele ? Abala mabele, Tondima ye”. Elobamaka bongo po na koboya lolendo ezanga tina oyo bato bazalaka na yango po na kitoko. Lokola tokosuka se tokufa, yango nde balobaka, kitoko ezali mabele. Kasi alanga-nzembo alobi, kobwaka nyonso na se te. Kitoko ezali na tina na yango. Esengeli kolengela nzoto, po moto oyo akobala mabele azali te. Okobala mwasi, esengaka kobala mwasi oyo azali na triple option.
Po na komonisa tina ya kitoko, alanga nzembo alobi : “Tala ngai bien, na babeauté. Olingi foto ? Zwa foto, Tsheke ! Mama ee, kitoko ya mwasi, ejouaka ! Ejouaka, Papa !”
5. Kokambika na minoko
Asangisi minoko mibale : lingala na français. Masakola ezali na lingala. Kasi maloba mingi, alanga-nzembo asaleli français.
Tolanda nzembo
Soso amela mayi na mozindo po na na kolanda masta na ye libata.
Somo ee ?
Tshololo
Likayabu na kikalungu
Mwasi na nzela, ilifo pe alela tshololo
Mabele ezalaka na puissance ya koattirer
Babengi pesanteur
Ebongo ngai avec triple option :
Pesanteur, courant pe aimant
Nabendaka, nakangaka pe nalengisaka
Namiyebi, yango nazali fière.
Mwana ya mvwama,
Mbolongo na kikalungu,
Zolo makale-kale, miso trouble
Monoko emeli soyi posa egrignoter.
Makanisi es’envoler
Rêve se na table,
Esprit na ngai ekomi envahi
Soki na eklezia, bakoloba envoutement
Po na clin d’oeil ya pamba,
Moto atomber amoureux
Nzoka ezali triple option ya Zaïna
Nabendaka, nakangaka pe nalengisaka
Pesanteur, na aimant plus courant
Ekangi ngai
Naza masanga oyo ebongisaka feti
Jus naturel
Elengi na lolemo
Parfum ya bafleur ya Jardin, nzambe
Art ya suka ya maboko ya Yawe
Mobimba na ngai eza ya kokakola te
Tala ngai bien, zwa ngai bien
Okutani na mwasi, visa ya repos
Naza masanga oyo ebongisaka feti
Jus naturel
Elengi na lolemo
Parfum ya bafleur ya Jardin, nzambe
Art ya suka ya maboko ya Yawe
Mobimba na ngai eza ya kokakola te
Tala ngai bien, zwa ngai bien
Okutani na mwasi, visa ya repos
Merci mama olakisa ngai malamu
Nalamuka na tongo,
Nakoti douche
Tuna ngai,
Nayebi le pourquoi
Résultat na yango :
Partout où je suis
Okuti ngai na ndako,
Omoni canon
Nabima na nzela
Wana nde scandale
Batanga basi, batanga pe yo ?
Ah, Mulaja acréer embouteillage
Kobanda Triomphal tii na Échangeur
Komona amoni Zaïna mwana ya mvwama
Au lieu abeta sifflet,
Palpite, ameli sifflet.
Bageste ya maboko
Ekomi ya kobengela Zaïna
Accident, suka na carnage
Na cortège ya président
Suka wapi ?
Nabendaka, nakangaka pe nalengisaka
Pesanteur, na aimant plus courant
Yango ekangi ngai
Po nadendaka, babengi ngai fragile
Nzoka nde ebende
Pesanteur, na aimant plus courant
Yango ekangi ngai
Papa alobi :
Ezala stylo to marqueur,
Oyo ezocompter ezali : ekomeli
Crayon, craie, ata touche, ekomeli kaka.
Jamais nakondima baloba ke nabeteli
Po nayebi secret ya komisala ngebu-ngebu
Triple option en action
Valeur na ngai, moto akokakola te
Siatapata!
Jamais nakondima baloba ke nabeteli
Po nayebi secret ya komisala ngebu-ngebu
Triple option en action
Valeur na ngai, moto akokakola te
Siatapata!
Siatapata!
Assurance ya ndeke, mapapu na ye
Ya mbisi eza banageoire na ye
Oyo ya ngai mwasi, ezali kozala consciente
Moke, monene, mokuse, molayi
Eza baqualité
Surtout proprété
Mwa nsunga ya bien
Secret yango wana
Triple option ekosimba.
Jamais nakondima baloba ke nabeteli
Po nayebi secret ya komisala ngebu-ngebu
Triple option en action
Valeur na ngai, moto akokakola te
Siatapata!
La fille aux lèvres électriques
Ekanga banyama
Ekanga mibali
Keba na philosophie pe baslogan ya bayi-mokili
Po de fois eruinaka
Soki omoni chérie akomi kolia quelque part,
Ce que ndako na bino ekoti mindondo.
Kitoko na elengi, ejouaka !
Nani yango aloba :
« basi nyonso bazali ndenge moko ?”
Est-ce oyo ya Bagowu na Biyoncé, bazali ndenge moko ?
Kotika te, po basi bakeseni
Nani pe aloba :
« kitoko ezali mabele” ?
Abala mabele,
Tondima ye.
Est-ce que tango basalaka concours ya ba-la-plus-belle na ba-la-plus-jolie, baponaka basi ya bilongi mabe ?
Nani yango aloba :
« basi nyonso bazali ndenge moko ?”
Est-ce Omba na Shako bazali ndenge moko ?
Kotika te, po basi bakeseni
Nani pe aloba :
« kitoko ezali mabele” ?
Abala mabele,
Tondima ye.
Tala ngai bien,
Na babeauté
Olingi foto ?
Zwa foto
Tsheke !
Mama ee,
Kitoko ya mwasi,
ejouaka !
Ejouaka, Papa !
Barbara, nsunga ee !
Elubu na yo kitoko!
Boyebisa ye ke :
Akanisa te ke soki asilisi bouteille ya sky
Nde akomi yanke,
Kwiti na ye mabe.
Jamais nakondima baloba ke nabeteli
Po nayebi secret ya komisala ngebu-ngebu
Triple option en action
Valeur na ngai, moto akokakola te
Siatapata!
Ezwi, ezwi!