Tozali na panzi-misato etelema (triangle rectangle) : abc
Panzi a ; Panzi b ; Panzi c
Panzi a etelemana na panzi c
na français balobaka (a na c ezali perpendiculaire)
Elingi koloba : kofungwama ya a na c esali 90°
Panzi b babengaka yango : nzela-mokuse (hypoténuse)
Mobeko ya bondeko ya panzi-misato elobi boye :
a2 + c2 = b2
Elingi koloba :
Soki osangisi bakotombwama mbala mibale ya bapanzi oyo etelemana,
okozwa kotombawama mbala mibale ya panzi nzela ya-mokuse.
Ndakisa
Tozali na panzi-misato : abc.
Panzi a = 3 ; Panzi c = 4
Po na koyeba molayi ya nzela-mokuse b, tokosala boye:
a2= 3 x 3 = 9
c2 = 4 x 4 = 16
a2 + c2 = 9+16 = 25
Nzoka nde :
25 = 5 x 5
Na boye,
b=5
Lisapo (Histoire)
Mobeko oyo, Pythagore moto asala yango te. Bakoko na biso bato mwindu nde bakelaki yango na Kemet (Egypte).
Ye akendeki koyekola matematiki na Kemet.
Tango azongi epayi na bango na Poto (na Grèce) nde akeyi kokoba kosalela yango pe kolakisa bandeko na ye.
Na tango ya kala-kala, bakoko na biso na Kemet (tango Egypte ezalaki ya bato mwindu), bakundolaki ete, ezali na bondeko kati na milayi ya mipanzi yango.
Bondeko yango ezalaki na litomba monene po na kotonga bandako, to pe, kokabola bitando na ndenge ya siki-siki (précision) po na kosala bilanga. Bazalaki pe kosalela yango po na kokela banzela, to pe, koyekola etamboli ya minzoto na likolo.
Bazalaki kosala ndenge nini ?
1° Bazalaki kozwa singa ya molayi pe bazalaki kosala yango mazita 12. Molayi kati na mazita ekokana.
2° Na sima, bakozwa songe mibale ya singa pe bakokanga yango lizita.
3° Bapiki nzete esika balingi kokabola mabele
4° Bakeyi kopika nzete mosusu na lizita ya misato (3), epayi oyo
5° Bapiki pe nzete ya misato na lizita ya minei (4)
6° Na mbala moko, okomona ete molai ya lizita kolongwa na nzete ya mibale kino nzete ya misato, ekosembwama pe ekozala na molai ya mazita 5.
Tina na yango nini lelo?
Kino na moyi ya lelo, babwanya (baingénieur) basalelaka mobeko oyo po na kotonga makambo ndenge na ndenge, ezala bilanga, ezala banzela, ezala GPS…
longonya
Soki mokano ezuami lelo na ba konzi ya mboka Congo po na kokotisa mateya na lingala mpe minoko mosusu nabiso (swahili, kikongo na tshiliba) na biteelo na biso, nabanzi nde ba yekoli ya biteelo ya likolo (Etudiants) bakobongola « théorie » nyoso na « pratique ». Biso tomeka déjà na oyo etali chimie.
Nzambe amoni yo. Apambola yo na mosala oyo. Soki bozalaki ebele ahh moto moyindo alingi kaka reaction. Totonga pe. To kabola ba bataillons na biso ndambu ndambu, misusu na actions, misusu na reaction misusu na anticipation.