Yo moko, olobaka nini po na yo moko? Ngai nalandaka te oyo bato ya libanda balobaka Nazali.
Nazali Congolais, nayebi nini esengeli nasala pe ndenge esengeli nazala. Na malamu na ngai, na mabe na ngai etali ngai.
Yo lobela makambo ya mboka na bino.
Po na oyo ya Congo, okoki kobanda na tongo tii tongo, okokawuka mongongo, nakokipe yo te, ata mayi, nakopesa yo te.
Okotikala na position wana tii mama na bino akoya kozwa yo bozongi epayi na bino.
Wana ngai, Bienvenu Sene Mongaba, mwana Tshangu.