Na nzembo na ye « Constatation », Kisangani Djenga Espérant, atuni makambo oyo ye amoni na mokili. Ezali makambo oyo ye amoni na bomoyi na biso bato awa na se. Yango wana ayembi yango. Alobi :
“nakonzemba, nakokamwa, mongongo na ngai ya mwana Djenga”. Alobi ezali constatation.
Liloba oyo “constatation” ezali na français. Na lingala ezali “bomonoli”. Bomonoli ewuti na komona. Komonola ezali komona likambo pe koloba polele ete omoni likambo yango.
Ndakisa soki bosali likama ya motuka, polisi tango akoya, akomonola likama. Elingi koloba, akomona ndenge likama esalami pe akoloba nani azali na libunga, nani azali na libunga te.
Na kati ya likanisi-likonzi “constatation”, esangisi makelelo minei : komona, kotuna, kokamwa, kolela : « Namoni lisusu boye ; Natuni lisusu boye ; nakamwe ; naleli »
Djenga K amonoli makambo. Yango wana anzembi yango na makomi pe ayembi na mongongo likolo. Yango wana na esika asalela koyemba, asaleli likelo konzemba.
Konzemba ewuti kaka na koyemba, kasi mingi-mingi, baalanga nzembo, po na kosakola, basepela kosalela konzemba (déclamer).
“Mokili ya kala ezalaka ya bakristo, lelo mokili ekoma ya bapagano”.
Tokoki kokamwa na bomonaka motuya ya bandako ya Nzambe pe ya bato oyo bakendeke kuna, koyoka ete Djenga K alobi ete : bakristo bazalaki na kala, kasi lelo ekoma bapagano. Po na nini, alobi boye? Alanga nzembo amoni ete mabe ekoti makasi na mokili. Na mawa na motema, alanza-nzembo alobi : “Ngai moko na mawa nákolela.”
Amonoli motema makasi ya bato ya mokili. Akamwaka ndenge nini, moto azali kolela, bato misusu bazali koseka ye, bato misusu bazali kotyola ye.
Na bomoyi ya moto, alanga-nzembo akesenisi pe lisusu : lobi loleki, lelo pe lobi lokoya. Oyo eleki, eyebani. Oyo ezali, ezali nanu kosalama. Oyo ekoya lobi, oyebi te, liwa pe elakaka te. Tina ya koseka moninga ezali te, po, “pasi ya mokili eponi moto te, pasi ya mokili ezali ya moto nyonso”.
Kala kosala moto mabe, ezalaki kaka na kati ya libota. Kasi ya lelo, bondoki-zoba, mabota “babenda nzoto.” Suka ya motema makasi oyo ekosuka kaka na liwa. Yango wana, Djenga K alaki mwasi na ye Kiazola, bana na ye pe baninga : “Mokolo nakokufa, nakoyeba te. Soki pe riche, soki pe pauvre. Nakoyeba te, mama »
Atuni biteni ya mokili : “Sanza, moyi, mapata, zamba, mabelé pé na mayi… Bino bato bozaláká, Babandá mokili bazali wapi ? Baye babandá mokili bazali wapi ?”
Na oyo etali mitalaka ya makelelo (conjugaison), Djenga K. ndenge amibengaka, asaleli mingi ngonga « eleka efanda » : « babandá mokili, bazalí wapi ? Bondoki etíkálá lisusu ya fami te ; bafami babendá nzóto »
Totanga makomi pe toyoka mondule :
Yoka lolaka ya mwana ya Djenga
Ngo oo
Nakonzémba ee
Nákonzémba
Nakokamwa ee
Nákokámwa
Mongongo na ngai ya mwana Djenga
Nakonzémba ee
Lolaka na ngai ya mwana ya Djenga nakotuna ee
Nakonzémba ee
Nákonzémba
Nakokamwa ee
Nákokámwa
Mongongo na ngai ya mwana Djenga
Nakonzémba ee
Lolaka na ngai ya mwana ya moto nakotuna ee
Mokili ya kala ezaláká ya bakristo ee
Lelo mokili ekomi ya bapagano
Nakokamwa ee
Sanza, moyi, mapata, zamba, mabelé pé na mayi
Bino bato bozaláká
Babandá mokili bazali wapi ?
Baye babandá mokili bazali wapi ?
Ngai moko na mawa nákolela
Moto ákolela
Bato bákoseka
Mpinzoli ya moto, bato bákotyola
Bougie ékopela
Mayi ya miso ékotanga
Natikali lokola zoba ngai moko na mokili
Nákolela
Constatation
Passé ya moto ezali nostalgie
Ezali lisitwale
Ekotikalaka
Kasi l’avenir eyébana te oo
Liwa ya moto ezali surprise
Sé lokola lisano
Bato babandi kolela
Réussite ya moto ezali surprise
Sé lokola lisano
Bato babandi kokamwa
Oo mama aa
Pasi ya mokili eponi moto te
Pasi ya mokili ezali ya moto nyonso
Pasi ya mokili ezali ya moto nyonso
Nakonzémba
Nakonzémba
Nakonzémba
Babandá mokili bazali wapi ?
Ngai moko ná mawa, malole
Naconstater lisusu boye
Namoni lisusu boye
Bato ya mokili,
Maloba sé koloba.
Ózanga mbongo,
Bato bákoseka.
Ózala na nzimbu
Bato bakokumisa.
Nakomi lokola zoba na mokili ngai moko nákolela
Nakomi lokola zoba nákokima mokili, somo
Naconstater lisusu boye
Bondoki ya Kinshasa etikálá lisusu na famille te
Bafamille babéndá nzoto
Bondoki ya Kinshasa, bafamille babéndá nzoto.
Etíkálá sé na misapi ya bato bakolakisa.
Tokómá kolokana sé na bato ya nzela, mama
Mingi bazwa bacoup na la vie, sé po na baninga ya mitema mabe
Basusu basilá sé po ya bato ya quartier.
Mingi basálá baninga mabe, sé po átikala na kompani
Naconstater lisusu boye :
Namoni lisusu boye :
Matanga ekómá façon na façon na Kinshasa
Différence ekaboli bariche ná bapauvre
Liwa ya pauvre, bato bákoseka
Matanga ya pauvre, bato ya kotánga.
Matanga ya pauvre ekowumelaka mingi te.
Bato bákobanga kosala dépense éleka ndelo.
Baye batikali na sima, lobi bakolia nini ?
Matanga ya riche, oyo somo !
Voiture suka suka, lokola défilé
Lopango etondi meke lokola zando
Mabala ekoma kosalama se na matanga
Basusu bayaka kaka se kotala lopango.
Lokumu po na famille, moto ya mbongo akufi.
Lokumu po na famille, moto ya mbongo akeyi.
Oo atiki ebele ya mbongo na famille na ye.
Ékopesa pasi na baye bazwaka te.
Ékopesa soucis na baye bazwaka te.
Mokili pasi, ngai naleli
Moto soki alangwe aleki na nzela, kotumola ye te.
Oyebi te soki ya soucis to pe ya esengo.
Akoya kokatela yo Lingala sé na nsé ya kwiti.
Tika ye áleka malembe.
Tika ye áleka na ye koleka.
Kapesa yela ngai bulangeti po nazipa nzoto.
Kapesa yela ngai vunga po nazipa nzoto.
Mopepe ya libanda ekobeta ngai malili,
Pasi ya kotelengana eleki ngai.
Mopepe ya libanda ekobeta ngai malili,
Pasi ya kotelengana eleki ngai.
Naconstater lisusu boye :
Songi-songi, kutu naloba te.
Yango lelo ekómá à la mode
Bapésá yango kutu kombo motors
Sango ékokende na mopepe
Songi-songi ebomá mabala
Yango vraiment, epanzá bafamille
Songi-songi ebomá baamitié
Songi-songi ekómá lokola passe-port po na bato mosusu
Mokili pasi ngai naleli.
Moto ya pusu soki ákoleka, kofinga ye te.
Ndenge akólá na bomwana, oyebi te.
Mingi bazwa badiplome evandá na ndako ee
Basala bakelasi te, bakómá bahéritier.
Bazwá maboma po bisimba-simba eleki.
Po bálonga mokili.
Mokili compliqué
Zwa idée.
Mokili compliqué
Kamwa ve.
Babandá mokili, boza wapi ?
Namoni lisusu boye :
Natuni lisusu boye :
Po na nini basi ya mabala bakomá mobulu koleka basi ya ndumba ?
Po na nini baleki na biso ya basi ya mbula oyo ya sika, bachangea idée ?
Natuni lisusu boye :
Po na nini, biso mibali tolingi se mwasi oyo azali na moto avandá na ye ?
Po na nini, biso mibali olingi ózala sé na basi ebele ? Ekomi kompani ?
Po na nini, biso mibali tokimaka basi soki ozwi mosolo ?
Po na nini ? ee mokili !
Nakonzémba, nakonzémba, nákonzémba ee
Nákonzémba nakanisa pasi ya bana na ngai.
Nákonzémba nakanisa pasi ya famille na ngai.
Nákonzémba nakanisa pasi ya molongani na ngai Kiazola.
Mokolo nakokufa, nakoyeba te.
Soki pe riche, soki pe pauvre.
Nakoyeba te, mama aa
Bana na ngai batikali na mawa bákolela papa
famille na ngai batikali na mawa bákolela Djenga K
Molongani na ngai Kiazola ákolela, chéri adieu.
Moninga na ngai ya motema Luvi ákolela Djenga K alangá-nzembo.
Bachérie ya miké maboko na moto bákolela alangá-nzembo.
Banguna na ngai na mitema bákosepela, c’est bien akeyi.
Filo mbongo na ngai ya motema ákolela Djenga akeyi.
Jipsy na ngai ya motema ákolela Djenga K alanga nzembo.
Mishka na Vida bákolela, bákolela
na ngai ya motema ákolela
Lita na ngai ya Bembo ákolela Djenga K alanga nzembo.
Ee, mokili ee !
Oo mokili !
Ee pasi ee, ee pasi ee !
Oo Nzambe, oo Nzambe !
Mitakufa bure, dju ya Mapendo !
Mitakufa bure, dju ya Mapendo !
Oo pasi ee, oo Nzapa !
Oo Mungu ee, oo pasi ee!
Nakeyi ee !