Na lingala, liloba etongamaka na biteni ebele. ekoki kotongama na biteni mibale, misato, minei,… biteni yango ezali nini? Tolanda :
- Maloba ebandi-mobimbi-suka
Maloba mingi etongama na biteni misato : Ebandi (préfixe), mobimbi (radical), suka (finale).
Ndakisa
a) mosala
mo-sal-a
mo- : ebandi
-sal- : mobimbi
-a: suka
b) koloba
ko-lob-a
ko- : ebandi
-lob- : mobimbi
-a: suka
c) liboke
li-bok-e
li- : ebandi
-bok- : mobimbi
-e: suka
2. Maloba ezanga ebandi
Tozali na maloba mosusu ezalaka na ebandi te.
Ndakisa:
a) tata
tat-a
b) mam-a
mbwa
mbw-a
Yoka malamu : lisanga ya mobimbi pe suka babengaka yango : mosisa (thème).
3. Maloba ya bikwakya
Tozali pe na biteni misusu ya maloba ezalaka na sima ya ebandi pe liboso ya mobimbi. Babengaka yango : ekwakya (infixe).
ndakisa :
a) namiseki
na- : ebandi
-mi- : ekwakya
-sek- : mobimbi
-i : suka
b) bamokosi
ba- : ebandi
-mo- : ekwakya
-kos- : mobimbi
-i : suka
Yoka malamu : Ekwakya elakisaka moto oyo basaleli likambo. Tokoyekola yango pe na bozindo.
4. Maloba ya bibendisi
Maloba misusu etongama na ebakisaka biteni mosusu na sima ya mobimbi. Babengaka eteni yango : ebendisi (extension). Ekoki kozala moko, mibela to pe ebele. Wana tokoloba : bibendisi.
Ndakisa
a) Kolobisa
ko-lob-is-a
ko- : ebandi
-lob- : mobimbi
-is- : ebendisi (extension)
-a: suka
b) Mozalisi
mo- : ebandi
-zal- : mobimbi
-is- : ebendisi
-i: suka
c) Bizaleli
bi-zal-el-i
bi- : ebandi
-zal- : mobimbi
-el- : ebendisi (extension)
-i: suka
Maloba mosusu ekoki kozala na bibendisi mibale to misato.
d) epekisami
e-pek-is-am-i
e- : ebandi
-pek- : mobimbi
-is- : ebendisi
-am- : ebendisi
-i: suka
Yoka malamu : lingala esalelaka bibendisi ebele
Ebendisi na ebendisi ezali na ndimbola na yango. Tokoyekola yango malembe malembe.
5. Maloba ya biteni nyonso
Maloba mosusu ezalaka na biteni nyonso oyo towuti komona awa na likolo: ebandi, ekwakya, mobimbi, ebendisi pe suka.
Ndakisa
a) komibíkisa
ko-bík-is-a
ko- : ebandi
-mi- : ekwakya
-bik- : mobimbi
-is- : ebendisi
-i : suka
b) bamotindeli mokanda
ba-mo-tind-el-i
ba- : ebandi
-mo- : ekwakya
-tind- : mobimbi
-el- : ebendisi
-i : suka