Mobéko : Biténi ya liloba
Na Lingála, liloba etongamaka biténi óyo : ebandi (préfixe), mobímbí (radical), súka (finale).
Ndakisa
kobíka
ko-bík-a
ko- : ebandi (préfixe)
-bík- : mobímbí (radical)
-a : súka (finale)
Mobéko : Bibakami
Na Lingála, liloba etongamaka biténi óyo ebakamaka : ekwakya (infixe), ebéndisi (extension verbale), libosó-ya-súka (pré-final).
Ndakisa
komibíkisa
ko-mi-bík-is-a
ko- : ebandi (préfixe)
-mi- : ekwakya (infixe)
-bík- : mobímbí (radical)
-is- : ebéndisi (extension verbale)
-i : súka (finale)
Mobéko : Ebandi
Ebandi ezalaka moféme óyo ezalaka na ebandeli na kómbó.
Ndakisa
mo- ezalí ebandi ya maloba óyo :
motámbo ; mokonzi ; mosálá ; mokéngeli
Mobéko : Mobímbí
Likanisí-likonzí ezalaka na óyo tobéngi mobímbí.
Ndakisa :
-bín-: ezalí mobímbí ya maloba óyo.
kobína → ko-bín-a
kobínisa → ko-bín-is-a
kobínela → ko-bín-el-a
mabína → ma-bín-a
mobíni → mo-bín-i
ebínelo → e-bín-el-o
ebíneli → e-bín-el-i
bibínábina → bi-bín-á-bin-a
Mobéko : mosisá
Mosisá ezalí mobímbí esangáná ná súka. Mosisá yangó mókó ekokí kozala liloba mobimba óyo esálelamaka na koloba tó na kokoma.
Ndakisa
tatá :
tatá → Ø-tatá
batatá → ba-tatá
botatá → bo-tatá
kitatá → ki-tatá
Mobéko : súka
Súka, ezalí eténi óyo etíamaka na súka ya liloba. Ezalaka mókó ya bilelisi na mongóngó ya likoló tó ya mongóngó ya sé : -a, -á, -e, -é, -i, -í, -o, -ó, -u, -ú.
Ndakisa
mosálá
mo-sál-á
mobóti
mo-bót-i
lokúmu
lo-kúm-u
moléndé
mo-lénd-é
elokó
e-lok-ó
Kokende
Ko-kend-e
elóko
e-lók-o
libála
li-bál-a
ezalí
e-zal-í
mobúlú
mo-búl-ú