« Nations nègres et Culture » en lingala

Bikolo ya Bayindo pe Bobiso

Cheik Anta Diop

Maloba ya ebendeli ya libimisi ya 1979

Libongoli ya Bienvenu Sene Mongaba

Na sima ya mbula tuku mitano, soki tozongisi miso sima, tokomona ete malako oyo tolobeli na kati ya buku Nations nègres et Culture (Bikolo ya bayindo pe bobiso), tokoki koloba ete  : enuni kaka te. Kutu, ebimi lelo nde na polele, moto nyonso akoki kozwa yango.

Nzoka nde, na tango nakomaki yango, makanisi yango ezalaki komonana lokola mbongwana ya makasi. Bato ya mayele ya Afrika mingi te nde, bazalaki na kanza ya kokotela yango.

Awa ezali, po na biso, libaku ya kozongisa lokumu na Alanga-nzembo ya bwanya pe ya sembo : Aimé Cesaire. Na sima ya kotanga, na butu moko, eteni mobimba ya liboso ya buku oyo, atambolaki Paris mobimba epayi ya bapusi-liboso ya tango wana. Akendeki kolukaka banganga ya mayele oyo bakokoka kosamba, elongo na ye, po na buku oyo ewutaki kobima. Kasi eloko te, azwaki moto te. Ezalaki se lubwaku nzinga-nzinga na ye.

  • Bonsomi ya Afrika
  • Bokeli Ekolo esangisa bikolo ya Afrika
  • Bomoto pe molengelano ewutaki na Afrika pe na bayindo
  • Ewutelo ya molengelano ya Ezipeto-Nubia epayi ya bayindo
  • Limemeli ya molengelano yango. Toloba : ekaniseli ya bayindo, na molengelano ya mindele na makambo ya nzebi, ya makomi pe ya ntoki
  • Bolakisi mibembo minene ya maboke ya bato pe bokelami ya bikolo na Afrika
  • Bondeko kati na nkota ya Ezipeto pe nkota ya Afrika ya bayindo
  • Esika Basemiti bawuta penza-penza
  • Bolakisi ndelo ya bobiso ya mokili ya bayindo oyo etandami kino na Azia ya eloli, na libulu ya India
  • Bolakisi elongi ya bitonga ya mopelengano to ya politiki pe ya bomoyi ya bato na bamboka na Afrika
  • Bosalami ya Bikolo ya Afrika na etando mobimba ya mokili ya Afrika, bokweyi ya Ezipeto, bokobi bondeko ya lisapo pe bobiso, kino na tongo ya ngonga ya sika
  • Kokomola (kolakisa ndenge ezali) molongo ya ntoki ya Afrika pe mikakatano na yango (kosala bikeko, kosala mikobo, mindule, botonginyi, nkoma-ntoki, pe bongo na bongo.
  • Komonisa makoki ya nkota ya biso po na komema makanisi ya nzebi pe ya ekaniseli. Uta na yango, kokoma mbala ya liboso nkota yango, ezanga koluka koyekola bikolo, pe bongo na bongo.

Yango nde mikabo minene ya buku oyo. Buku yango ezali kobangisa lisusu bato ya mayele ya Afrika te. Kutu, eyebani lelo koleka mbula zomi, UNESCO ekomisaki ya ye makanisi, eteni ya monene ya makanisi yango na oyo etali lisapo ya Afrika pe nkola ya nkota na biso ya Bikolo.

Mbala na mbala tobandelaki kobimisa buku oyo, emonisamaki na biso ete, tina te toluka kopetola buku yango na ndenge ekomamaki na ebandeli. Esengeli etikala ndenge ezali, lokola nzengeneke ya molende ya ebandeli tango tozalaki koluka kosimba tina ya ndelo ya mikakatano ya Afrika.

Bokolisi bitaleli pe mabongisi ndenge na ndenge ezwami bongo na babuku oyo nabimisaki sima lokola : Antériorité des civilisations Nègres: mythe ou vérité historique ? Parenté génétique de l’Egypte pharaonique et des langues négro-africaines, pbb.

Tika ete bilenge oyo bakotanga buku oyo, bakoka kozwa tina ya kolikya, na botalaka nzela molayi oyo totamboli uta buku oyo ekomamaki.

Cheik Anta Diop

Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *