Nakozala té
Mokolo Kongó ekotéléma
Wáná bingambe

Na lolendo
Bakongala
Nakozala
Na mbóka ya bawei
Molimo epái ya Nzambe,
Nakoseka na esengo
Mái ya míso ekokauka
Nakozala té
tíka nátía ya ngáí libonza leló
pó na Kongó
Pó, mokolo yangó,
nakozala té.