Na Afrika, eteyelo ya lelo ezali kaka eteyelo ya tango ya kolonizasyon ?

Biteyelo ya Afrika, elukaka tango nyonso kotangisa na ndenge ya biteyelo ya Poto. Bikolo oyo ekolonizaki bango. Ndakisa : RDC ekoluka kotangisa neti na Belgique, Congo-Brazza ekoluka kotangisa neti na France pe Angola bakoluka kotangisa neti na Portugal.

Lire en français

Tango Bikolo ya Afrika bazwaki lipanda, bakonzi bana-mboka, balukaki ndenge nini ya kotangisa bayekoli na bango po bakoka makambo neti mindele. Yango wana miango (programmes) ya kotangisela, etikala ndenge moko na oyo ezalaki kosalama na tango ya kolonizasyon. Na makanisi na bango, po kotangisa ezala ya malonga, esengelaki bana batangaka na minoko ya Poto. Tala tina, bakonzi bapekisaki na bayekoli ya Afrika kosalela minoko ya Afrika. Bakembisaki kosalela se minoko ya Poto.

Na oyo etali misolo, na sima ya lipanda, Bikolo ya Afrika bakotaki na mpiaka makasi pe bakendeki koluka kodefa misolo epayi ya baguvernema ya Poto pe mangomba ya misolo ya Poto. Mangomba mibale ya misolo ezali : EMM (Eyangelelo Misolo na Mokili) pe Banki ya Molongo to FMI pe banque mondiale na français.

Po na badefisa bango mbongo yango, bapesaki Bikolo ya Afrika mitindo oyo esengalaki batosa. Kati na mitindo yango, makambo ya kelasi pe ezalaki na kati. Na boye, baguvernema ya Poto, pe mangomba oyo mibale batindaka baoyo bango babengaka banganga to ba-expert. Banganga yango bayaka koloba na bakonzi ya Afrika, ndenge nini bakelasi esengeli eyangelama.

Miango ya mateya (programme scolaire), babuku ya kotangela, monoko ya kotangela pe bilandelami (objectifs) na oyo etali mateya, nyonso wana ekanamaka na libanda pe bakonzi ya Afrika, na kati, batosaka kosalela yango.

Limanyoli oyo ya kolonizasyon (le concept colonial) ezali tango nyonso na mito ya bakonzi ebele. Na Bikolo ya Afrika, makambo ya koteya bana ya kelasi elengelamaka kaka ndenge ezalaki kolengelama na tango ya kolonizasyon. Na boye, ezali pasi po biteyelo ekokoka kosunga ntombwama ya Afrika. Ezali na monyololo oyo elinga mokonza (colonisateur, oyo azokonza na nko) pe mokonzami (colonisé, oyo bazali kokonza ye na nko). Po monyololo yango ekatana, ezali bobele mokumba ya oyo bazali kokonza, elingi koloba mokonzami. Ye nde akoboya kokonzama pe akoluka kotambusa bomoyi na ye na ndenge ye alingi. Wana nde akomi nsomi, na lolenge ya nsomi ya Libinza.

Ezali nde mokumba ya bana ya Afrika. Ekolo moko na moko, kolandana na bokulaka oyo bazali na yango pe esika bango balingi kokoma, bakosala mwango (programme), bakomipesa pe bilandelami (objectifs). Yango nde ekopesa bango nzela ya kotangisa bana na bango po bana yango, bakoma bansomi oyo bakozala na makoki ya kobongisa bozali-malamu ya bayi-mboka. Ezali polele ete, po na yango, esengeli moyekoli ayekola na monoko oyo ye alobaka na bomoyi na ye ya mokolo na mokolo.

Bakonzi ya Afrika bakoluka te, kosala moyekoli ya Afrika akokana na moyekoli ya Eropa to moyekoli ya Chine. Esengeli batangisa ye na ndenge na ye, na ndenge oyo ekosala ete, moyekoli ya Afrika akoma na makoki ya kobongisa bomoyi na ye pe ayeba kozwa biyano na mikakatano oyo bomoyi ya bato na mboka na ye bazali na yango.

Une réflexion au sujet de « Na Afrika, eteyelo ya lelo ezali kaka eteyelo ya tango ya kolonizasyon ? »

Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *