Mokolo bakokumisa yo ete :
« Oza lokola bango te ».
Yo pe osepeli olobi :
« Ee nazalaka lokola bango tein! »
Yeba ete, omifingi !
Mokolo bakosilika na yo, kaka bango nde bakoyebisa yo :
« Tala ye kuna mwana na bango! Bozalaka boye ndenge nini? »
Wana kanisa ete, esi omifingelaki, kosilika te, kobeta moto te, po, ozalaka lokola bandeko na yo, ata owangani!
Mindimaka! Na mabe, na malamu na bino, mindimaka!