Tokoki kokabola mibeko ya Lingala na maboke minei :
Etongameli :
Liloba nyonso etongama na biteni : ebandi, ekwakya, mobimbi, ebendisi, suka. Tokoyekola ndenge maloba etongama na Lingala.
Esakoleli
Moto asangisaka maloba po ebimisa mobimba ya likanisi. Yango nde babengaka lisakola. Lisakola ezalaka na biteni oyo : mokonza, likelelo, likokisi.
Lolaka
Tozali na lolaka ndenge mibale : eleli na elelisi. Soki osangisi yango ekopesa bikango. Elelisi ekoki kozala mongongo likolo, to pe, mongongo na se. Tozali na bilelisi mitano : a, e, i,o, u.
Tanga na bolayi.
Kokela maloba
Soki ndenge ya kobenga limanyoli songolo epesami nanu te na lingala, tokosalela mibeko oyo tomoni awa na likolo (etongameli, esakoleli, lolaka) po na kobota liloba ya sika oyo ekokoma ebengeli ya limanyoli yango.
Tanga na bolayi