Nzembo oyo, kombo na yango «Mario »
Bokuse
Nzembo oyo ezali lisolo ya mwana mobali moko kombo na ye Mario. Mario atanga bakelasi ebele, azwa badiplôme ndenge na ndenge, kasi alukaka mosala te.Alinga mwasi oyo aleki ye na bamvula ebele. Mwasi yango azali na moto ya
mbongo. Ye moto “alatisaka, aleisaka pe alalisaka” Mario. Kasi, Mario azali na bizaleli ya mabe. Soki likambo moke, akobeta mwasi na ye. Mario, zuwa eleki ye. Yango wana, mwasi alembi ye. Abengani Mario, Mario azongi epayi ya baboti na ye. Luambo alobi ezali toli azali kopesa na bana mibali oyo balingaka koluka misala te, balingaka se kozwa basi oyo baleki bango na mbula pe na mbongo.
Oh Mario
Luka ata mwasi yo moko obala
Mario mosala obe kolinga bamama mobokoli
Basuka yo te ?
Lelo makambo, lobi makambo,
nalembi
Lelo bitumba, lobi koswana,
nabaye
Naboyi kobebisa nzoto na manzaka
nalembi eh
Mario nalembi e e
Mario nabaye e e
Oh Mario nasi napekisa yo
Kolingaka basi bazali na mbongo
Yoka ndenge azali kokaba yo na mitema ya basi mpe na mibali
yo moto ozali na badiplôme mitano, Mario
Sala quand même effort oluka mosala, Mario
Mpo na nini ozali kobebisa
Kosambwisa kombo na yo
Mario ah nalembi
Baproduit ngai napakolaka
nzoto ekoma sembe sembe
Okobete ngai nazoka
lobi nazwa maladie ya cancer
Lobi tango nakopola, yo okimi ngai eh
Mario nabaye eh
Mario nalembi eh
Bafamille ya Mario bakanisaka
Mario apesaka ngai mosolo
Nzoka, ngai moto nalatisaka ye, naleisaka ye, nalalisaka ye
Mario
Mario nalembi eh
Bima bima na ndako na ngai, Mario
Mpo na nini ?
nyongo ya kolinga ?
Akobete ngai na zuwa
epayi zuwa ya lokuta
epayi zuwa ya biloko
akutaki ngai na yango
Likambo moke
mosala koboma biloko ya ndako nasomba
Nalembi eh
Mario
nabaye yo
Kende Mario nalembi yo oh
Mario okuti ngai na biloko mobali mosusu asomba
Oyoka elengi ya kovanda te Mario ?
Oyoka elengi te olia na mesa ?
Kaka soki zuwa ekangi yo na poitrine
Olingi kaka kobeta ngai na koboma biloko
Mario si nasalisa yo mingi
Diplôme ya sima ngai moto nasalisaki yo Mario
Bongo lelo ngai nakomi mwasi mabe ?
Mario likambo te
Ah mokili ee! eza kaka boye!
Mobali akuti ngai na bomemgo
Asengi acommander ngai nandimi
Mobali akuti ngai na bangenge
Asengi adiriger ngai nandimi
Nabandi kobima na ye
babandi kobenga ye Monsieur
Mario avimbi moto
akanisi biloko na ngai, ya ye ah!
Ah Mario nabaye yo o
Kende Mario
nalembi yo o
Mario azongi epayi ya baboti
Akuti mbeto na ye ya bomwana
Ekomi tango ya kolala
mbeto mokuse makolo milayi Mario
Mario nalembi
somba mbeto
nabaye e
Mario nalembi
Koyoka motema pasi te
ndako ngai moko nafutaka
Bilamba nasombela yo,
natikeli yo souvenir ya bolingo
Oyo ezali na lavage
nakotindela yo na bato
Mario nalembi yo oh
Kende na yo nabaye yo oh
Mario
zuwa lokola fusée Mario
Mario mosala kobetela ngai bana bigogo
Bana yango ya yo ?
Olingi obé bamama mobokoli
Akobete ngai na zuwa
epayi zuwa ya lokuta
Epayi zuwa ya biloko
akutaki ngai na yango
Likambo moke mosala koboma
biloko ya ndako nasomba
nabaye yo
Mario
Nalembi eh
Bima bima nabaye yo
Mario nalei mbongo ya likelemba mitu tuku misato
Nasombi Mercedes 190
nayebisi Mario mokolo mosusu tobima
Tokende kosala promenade
Tokomi na nzela Mario alobi na ngai
Yo zonga côté ngai nazali
Nakumba voiture mpo bamona que ngai
Moto nasombeli yo yango
Nayebisi Mario te
Ngai kutu naza na posa nakumba eloko nasombi sika
Bato nyonso bamona que ngai moto nasombi
Toweli volant ngai na Mario
Mario atuteli ngai voiture na nzete
Nzoto ezali nanu ya meme
olingi obebisa ngai elongi
Il parait basi nyonso ozwaka mosala kobebisa bango bilongi
Epayi na ngai nastopper
nalembi yo
Mario papa nabaye yo oh
Kende na yo nalembi yo
Mario alingaka babongisa poso ya matama na pommade
Oh ata ezali mwindu, eya motane
Alingaka kobala basi ya âge na ye te
Alingi obe bamama mobokoli Mario
Mario valise eza na ye te
Soki mama mobokoli abengani ye
Akanga obe biloko na liputa
Babrosse à dents, masini ya mandefu, kisanola
Mobali akuti ngai na bomemgo
Asengi acommander ngai nandimi
Nabandi kobima na ye
babandi kobenga ye Monsieur
Mobali avimbi moto
akanisi biloko na ngai, ya ye ah!
Mobali akuti ngai na ngenge
Asengi acommander ngai nandimi
Nabandi kobima na ye
babandi kobenga ye Monsieur
Mario avimbi moto
akanisi biloko na ngai, ya ye ah!
Ah
Mario nabaye yo o
Bima na yo
Nalembi yo
Mema bilamba
nabaye yo o
Mario à travers yo napesa baleki mosusu toli
Bakomi kolinga basi ya bato mpo na bambongo na bango
Mobali asali mbongo, asali mbongo apesi mwasi
yo okeyi
okeyi kovandela ye mpo osilisa ye yango
Ah Mario okuti ndako appartement kitoko
Biloko yo moto osombi te yo olali
Ovandi, téléphone, télévision
Oh Mario kanisa que mobali oyo asombaki yango
Amonaki mpasi
likambo nini Mario ?
Llkambo naloba kutu ezali te
Ezali te, ezali te, eza te, Mario
Koyoka motema pasi te
ndako ngai moto nafutaka
Bilamba nasombela yo
natikeli yo souvenir ya bolingo
Oyo ezali na lavage
nakotindela yo na bato
Mario nalembi yo oh
Kende na yo
Nabaye yo oh
Mario
basapato ya weston
na basapato ya croco
Olataka
Kaka mwasi asombelaka yo ?
Bilamba ya Valentino,
complet ya cuir
Na bachemises ya soie
Baceinture ya lézard
Kaka mwasi asombelaka yo Mario ?
Basuki ekoma ya kolala milelo milelo
Singa singa na moto
Kaka mwasi moto afutaka coiffeuse wana ?
Ha!
Baproduit ngai napakolaka
Nzoto ekoma sembe sembe
Okobete ngai nazoka
lobi nazwa maladie ya cancer
Lobi tango nakopola yo oboyi ngai eh
Mario nalembi eh
Kende papa nalembi yo oh
Mario azongi epayi ya baboti
Akuti matelas na ye ya bomwana
Ekomi tango ya kolala
matelas etoboka
Ebimisa pasipolomu
Nabaye Mario,
matelas mokosa nalembi eh
Somba matelas nabaye eh
Lelo koswana lobi bitumba
nabaye
Lelo makambo lobi makambo
Nalembi
Naboyi kobebisa nzoto na manzaka
nabaye yo,
Mario nalembi e e
Mema bilamba nalembi
Kotika eloko te nabaye
Mario nawuti zando
nakuti ye na ndako
Mario asiliki,
nakanisi bana mosala balambeli ye biloko malamu te
Ngai moko nakoti na cuisine
Nalambeli Mario, nati na mesa
Mario aboyi kolia, asiliki
Abengi ngai pembeni
Chérie oyebi tina nasiliki,
nalobi : te, nayebi te
Bacomplet ya lin oyo ebimi sikoyo
Soki osombeli ngai te libala ekokufa ya mbala oyo
Mobali akuti ngai na bangenge
Asengi adiriger ngai nandimi
Nabandi kobima na ye
babandi kobenga ye Monsieur
Mario avimbi moto
akanisi biloko na ngai, ya ye ah!
Ah Mario nabaye yo o
Mobali mabe nalembi yo
Obetaka ngai nalembi yo papa
Ah Mario vraiment kende na yo kaka
Na bagrand frères ya quartier
Okoma kosalela bango zuwa
Bato bamoni esika ngai nakoli Mario
Ah Mario akomona tango bakosala versement ya mbongo
Baye kotikela ngai
Mario alongoli singlet
Alingi sikoyo asala compte ya mbongo
Zuwa etondi ye na mbanga na mitoki
Mais mbongo yango ozali kocompter, ya yo ?
Akobete ngai na zuwa
epayi zuwa ya lokuta
Epayi zuwa ya biloko
akutaki ngai na yango
Likambo moke,
Mosala koboma biloko ya ndako nasomba
Nalembi eh
Mario papa
nabaye yo
kende na yo
nalembi
Lokoso eleki
nalembi yo oh
Bafamille ya Mario bakanisaka
Mario apesaka ngai mosolo
Nzoka, ngai moto nalatisaka ye,
naleisaka ye,
nalalisaka ye
Mario en tout cas nalembi mbala oyo
Soki oyoki lisusu natuni bamoziki na ngai
Baya kobondela yo
kende libela
D’ailleurs oza mwana ya bato
ngai mpe naza mwana bato ya
point.