Maloba ya ndeko Baleejo : Vieux atikala, Vieux akende

Oyo maloba ya ndeko Baleejo TeelDo Sow.

Nabongoli yango na Lingala. Alobi boye :

« Boua b´a bla – Boua t´a bla »
« Vieux atikala – Vieux akende »

Baninga, ezali malamu te, kopesa maloba na moto nyonso.

Nalobi yango. Nakomaka yango pe uta mwa bamvula, na makakoli na ngai. Etelemeli na ngai po na yango, ekobongwanaka te.

Esengeli te, kopesa maloba na moto nyonso. Mingi penza tango etali politiki ya koyangela ekolo.

Ezali kaka te kopima basusu maloba, kasi esengeli pe te, na moto nyonso, amipesa nzela ya kolobelaka politiki.

Nalingi nazongisa bino makanisi ete, politiki ezali nzebi (science). Ezali na malakisi oyo babengaka : nzebi ya politiki. Na nzebi ya politiki, okoki kotanga pe koluka-luka. Ekoki komema moto azali koyekola yango kino na kozwa lopete ya Nganga (docteur).

Politiki ezali nzebi lokola matematiki, fiziki, shimi, bioloji ezali banzebi.

Lolenge matematiki, fiziki, shimi ezali mbilinga-mbilinga pe pasi po na kososola, po na mingi kati na biso, lolenge moko pe politiki ezali mbilinga-mbilinga pe pasi po na kososola.

Lolenge matematiki, fiziki, shimi ekoki kosala ete pepo epumbwa, motuka etambola, okoka kosololana na moto azali na bankoto ya bakilometele, na lolenge moko pe, politiki ya koyangela mboka, ekoki kozongisa sima to kopusa liboso ekolo, mboka, ata pe mokili-mbu (continent)mobimba. Na boyebaka polele nini ozali kosala.

Boluki na politiki ekoki kopesa makoki ya koyeba maye makoya na bamvula ntuku na ntuku ezali liboso.

Baboluki wana etuyaka pe emanyolaka mibongisano mvula 10, 20, 30 liboso. (Barecherche wana ecalculaka pe econcevaka basystème po na bamvula, 10, 20, 30 liboso).

Baninga, ezali kaka po na kozongisa bino makanisi ete, po na kososola likambo emonani na politiki, esengeli koyeba liboso lisolo ya solo ya likambo yango. Kasi, esengeli pe kozala na makoki ya kobanza po na ezalelo yango pe kobanza, po na nini likambo yango ekomi, likambo yango ekomeli ndenge nini, pe bongo na bongo.

Lisusu, po na kokoka kobanza yango, esengeli pe ozwa tango ya kososola. Ozala na ndelo ekoki ya kobanza. Oyeba kotia eloko na eloko na esika na yango.

Elingi koloba, ba«videomen» nyonso oyo ya politiki, babisala-sala politiki oyo ya Mali (Congo), mosala na bango, bilobela.

Moko te kati na bango ayebi penza nini ezali koleka. Esuka kaka wana té, basololaka penza te, po na kokabolana makanisi pe po na kososola makambo ya politiki yango.

Ezali po, bazali na makoki te ya kososola makambo yango po na komonisa biso nini ezali malamu, nini ezali mabe. Ezali po, politiki ezali nzebi (science).

Pe bilenge ya Mali (Congo) na moyi ya lelo batiami na pasi po na kosimba ntina na nzebi.

Lelo masolo nyonso esuki na maloba Boua t’a bla (vieux atikala), po atongi ndakisa nzela ya Bamako-Segou. Boua b’ a bla ( vieux akende) po nyonso eleki talo lelo na Mali, pe bongo na bongo.

Kopona Mokonzi ya mboka esuki kaka te na biloko Wana. Kosimba ntina ya mobongisano ya politiki esuki kaka te na Boua b’a bla, Boua t’a bla (yebela, wumela).

Mawa kaka po, bilenge ya Afrika, penza baoyo ya Mali (Congo) bamitiki na bolembu ya koboya kobanza. Baboyi kokende koyekola makambo po na kosimba ntina na yango na bozindo.

Tokomi na momeseno mingi ya kozwa makambo na pete.

Lokola tolingi penza kokomisa biloko nyonso pete penza, tomipesaka lisusu ata molende te ya kokende mosika na masosoli na biso, na boluki na biso pe mayekoli na biso.

Tala po na nini, biso bilenge ya Afrika, penza-penza bilenge ya Mali, tozali ndenge tozali lelo.

Tozali kokoka ata te kokela bokulaka epayi na biso, tozali kokoka ata te kobimisa biloko ya sika, ata kutu kobongola mwa moke oyo ezalaki, tobungisi momeseno ya kobanza.

Nyonso tozali koluka kobimisa pe kokondisa yango na lolenge oyo ekozala pete po na kosimba tina.

Bamama, batata, bandeko ya Mali, koyoka bato wana kotuta masolo, ezali kozwa biso tango oyo esengelaki totia po na koyekola, po na kotanga, po na koluka koyeba malamu koleka. Politiki kaka te, kasi, pe, nyonso oyo ekendeke nzela moko na politiki.

Nakanisa ete, soki bayi-mboka batangi malamu, ndelo ya masolo ekotombwama pe bayi-politiki bakotindikama po na kotala penza makambo ya solo ya mboka.

Soki te, « vieux » moko akokende, mosusu akoya pe akosala kaka ndenge oyo ya kala azalaki kosala. Ata kutu elenge ayei, akosala kaka lokola bampaka. Ekosenga na bayi-mboka bayebaka kolandela na pene pe basosolaka malamu ezalelo ya politiki ya mboka, ezala na ndelo ya mboka, ezala na ndelo ya mokili.

Baninga ya Facebook, baoyo bayebi ngai, ezala bato ya libota to baninga, bayebi malamu ete, eloko se moko nasengaka na moyi-Afrika nyonso : Kende koluka koyeba.

Makambo ebele oyo tobengaka « mokano ya Nzambe » to « mapamboli » to « ngenge », mingi-mingi ezalaka kososola ya dongi. Dongi oyo efandisama na litambusi kaka moko.

Ezalaka bongo po, mingi kati na biso tomonaka yango pasi pe kolembisa, mabanzo ya mbilinga etonda matambusi pe mabongwami kili-kili.

Na tango wana, masosoli pe mayekoli ya solo-solo ya nzebi ya politiki, efandi na bankoto ya bakilometele, mosika na biso, ezali kokamba biso. Ezali kokoba kokamba biso, soki tomipesi na boteyami te.

Baninga na ngai, etaleli na ngai oyo ya makambo elakisi te ete, bilenge ya Afrika esengeli bamitika to batika kobunda to kobelela. Te, esengeli bilenge ya Afrika batelema pe babelela.

Kasi na tango tozali kobelela, tokeba ete makambo ya motuya eleka, tozanga komona yango. Tokeba pe : tolekisa tango na biso pamba te na masolo ya lokuta.

Pokwa elamu na bino, baninga na ngai,

©Baleejo TeelDo Sow

Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *