Tozali na mangala mibale :
Lingala lya Makanza pe Lingala ya lelo.
Lingala lya Makanza elandaka mobeko ya «bolongobani»
Ndakisa
Lipa lizali likolo lya mesa.
Mapa mazali likolo lya mesa
Lingala ya lelo elandaka mobeko wana te.
Lipa ezali likolo ya mesa.
Mapa ezali likolo ya mesa.
Bolongobani elakisi nini?
Bolongobani ezali «accord».
Ndakisa
Sujet (mokonza) ebandi na li-,
verbe (likelelo) ekobanda pe na li-,
pronom (likitana) ekobanda pe na li-,
adjectif (likonzami) ekobanda pe na li-
Ndakisa :
likambo lina lizali libe
Na lingala ya lelo, tokoloba
likambo wana ezali mabe.
Ok, nayoki, melesi mpo na ndimbola