Lingala ekomi nde Kicongolais ?

Lingala ebandaki kopanzana na bamboka ebele uta na 17ème siècle (bonkama ya 17). Na tango wana, bato bazalaki kosala mombongo na ebale ya Congo, kolongwa Kisangani kino na Pool Malebo. Monoko bazalaki kosalela ezalaki nde

Lire en français

Lingala. Ekomaki nde monoko oyo bato bakesana bikolo, bazalaki kosalela po na kosololana.

Lingala ezalaki bongo monoko oyo ezalaki kolobama kolongwa Kinshasa na Brazza pe komata na bituka ya likolo ya baCongo nyonso mibale. Ekendeki kosuka na monyele ya likolo (Nord-Est) ya RD Congo epai wapi, Lingala ezalaki kokabola mabele na Kiswahili.

Na tango ya kolonizasyon , baBelge baponaki bongo kosalela Lingala lokola monoko ya basoda. Na sima ya mwa bamvula, yango pe eponamaki bo monoko ya kotangisela na biteyelo ya bituka oyo towuti kolobela. Ezalaki mingi na ngambo oyo ekonzamaki na nko na babelge.

Lokola bato bazalaki kowuta bipai na bipai na kati ya Congo pe koya kofanda na bingumba (ville) oyo mibale, Kinshasa na Brazzaville, bazalaki pe komema minoko na bango. Na boye minoko ebele ezalaki kolobama. Ezalaki mingi-mingi, Kikongo (Munukutuba pe Kikongo ya Bakongo), Tshiluba, Kiswahili pe Kilari.

Malembe-malembe, Lingala ekomaki kodondwa koleka minoko misusu. Yango ezalaki penza po bayembi pe bato basanaka maboke, bazalaki kosalela yango lokola monoko ya lisano na bango. Na boye, ezali nde na nzela ya bobiso (culture) nde Lingala ezwaki mapapu na yango po na kokoma monoko ya bato nyonso.

Na sima, bana oyo babotamaki na Kinshasa pe Brazzaville, bakomaki koboya koloba minoko ya baboti pe bakoko na bango. Monoko baponaki koloba ezalaki nde Lingala. Ezalaki po bazalaki koboya kokabola bikolo, yo ozali mu-boye…

Lokola makambo ya politiki, ya nkita (économie) pe ya bobiso (culture) nyonso ezalaki kokonzama uta na Kinshasa pe na Brazzaville, bato ebele bazalaki kolongwa na bamboka ya kati pe koya kofanda na bingumba oyo mibale. Na sima na yango, mpiaka pe eyaki lisusu kobeta Kinshasa na Brazzaville. Yango etindaki babotama ya bingumba oyo, kokende moluka na bamboka ya kati. Lokola mingi kati na bango bayebaki koloba kaka Lingala, bamemaki Lingala epai bakendeki moluka. Yango epusaki bilenge ya bamboka ya kati kopona pe kosalela Lingala. Soki ozali koloba Lingala, ezali lokola mwa lokumu moko boye.

Lingala epanzani na mabele mobimba ya Congo-monene. Na bingumba lokola Pointe-Noire, Matadi to pe Kikwit, epayi wapi Munukutuba nde ezalaki monoko ya mokolo na mokolo, Lingala ekomi pe kozwa esika. Na Lubumbashi, Goma, Bukavu, Lingala ezali kolanda na sima ya Kiswahili. Na Mbuji-Mayi na Kananga, monoko ya Lutumba ekomi kodyota mabele ya Tshala-Mwana. Na bingumba ya Likolo (Ouesso, Mbandaka, Kisangani, Impfondo, Djambala, Gbadolite,…) epayi wapi bamesana na Lingala, nguya na yango enganzami lisusu makasi.

Kasi Lingala ezali tango nyonso na sango ya mabe oyo etingamaka yango. Okoyoka bato koloba ete, Lingala ezali monoko ya ba-voyou, monoko ya ba-impoli, monoko moko pauvre, pe bongo na bongo. Epayi mosusu, na moyi ya lelo, Lingala ekomi nde elembo ya komibenga « mwana ya Congo ».

Yango wana, ekopusa malamu, bato ya Mangala bango moko bakoma kosalela Lingala pe na makambo ezali na ntina, lokola masolo ya boyebi (intellectuelle), ya nzebi (sciences) to ya makomi (littérature). Ezali kaka te kosalela yango po na kofinga, koswana, to kobeta masolo ya mokolo na mokolo. Po na yango, mosala na ngai ezalaka kobongisa na molongo ndenge ya kokela maloba na Lingala pe namipesaka po na koluka ndenge ya malamu oyo bakoki kosalela Lingala po na kotangisa mateya ya kelasi.

 

Une réflexion au sujet de « Lingala ekomi nde Kicongolais ? »

Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *