Leló nakanisí yó lisusu
Mayí etangí na míso
Olobákí okosunga bísó sima
Leló toyéí kosunga yó
Leló, koyóka sóni té,
Mokilí esálámá se bóngó
Lóbí pe ezalí mokolo
Leló yó na pási
Baóyo baliáká,
Basepeláká
Na bozwí na yó
Leló bapésí yó mokongo
Kolela tee,
Mokilí yangó,
Esálama se bóngó,
Moto azalí se moto,
Sálá bolámu pó na bolámu
Kosála malámu na elikyá
Lóbí bakozóngisela yó bolámu,
Ezalí kokóna na ebale!
Mabé tokosálaka
Efútamaka tee
Bolámu pe
Efútamaka tee
Ezalí pe likelemba té,
Pó leló yó olié,
Lóbí ngáí nakolia!
Te, lelo olié, lob olié lisusu
Bato ya mabé óyo
Bakúfá ezángá
Bafúta mabe
Batondá bebo na malita!
Bato ya malámu óyo
Pé, basúká na pásí,
Batóndá bebo na malita!
Olela yó na nání?
Nzambe, mokilí na yé,
Asálá yangó yé mókó,
Ezángá likopa
Asenga lisungi te!
Sálá malámu na yó
Pó motéma na yó
Eséngí yó kosála malámu!
Sé bóngó ndeko molingamí!
Lilobo ya Mabiki Ida, mama abota Bié!