Le préfixe mo- en lingala
1)
En lingala, nous avons un groupe de mots qui commencent par le préfixe « mo ».
Na Lingala tozali na maloba oyo ebandaka na “mo”
Motema (coeur), motambo (piège), mokongo (dos)
Monguna (ennemi), mokonzi (chef), moboti (parent)
2)
Si le nom indique un objet ou un fait, au pluriel le préfixe mo devient « mi ».
Soki kombo yango ezali kombo ya eloko to ya likambo, na boyike (pluriel) ekokoma « mi »
motema == mitema
motambo == mitambo
mokongo == mikongo.
mosala == misala ;
mokokoli = mikokoli
3)
Si le nom indique une personne, au pluriel le préfixe mo devient « ba ».
Soki kombo yango ezali kombo ya moto, na boyike ekokoma « ba »
monguna == banguna
mokonzi == bakonzi
moboti == baboti
moto == bato
moluba == baluba
mokumbi == bakumbi