Le 02 août 1998
Nayokaki yango na mosika
Bitumba ebandeli lisusu.
Lelo sima ya bambula 23
Tozokoba na kokufa
Moto akotala te.
Po basepeli bazwaka coltan ya ofele
Babonza Virunga
Po lobi batimola Pétrole ya ofele.
Bayi-Kongo misusu bakoti na bodongolo-miso
Po mosolo efuluka bango na mabenga
Balangwa-langwa.
Tokobosana te
Tokolela pe te
Tokokitisa pe elongi te.
Tozoluka malembe malembe
Kino tokotelema
Bobele na bwanya pe molende.
Eza likambo ya ngonga.