Bolingo,
Bomengo,
Esengo,
Bondeko
po efanda ,
Esengaka
Bwanya,
Boyebi,
Mosala
pe Molende.
Tongo nyonso, kosaka na ngai ezalaka :
Bakoko bolakisa ngai nzela ngai nalanda. Natonga likolo ya oyo bosalaki.
Mabunga na bino pe Bosolo na bino
Esunga ngai po nalekisa ngonga mingi te.
Butu na moyi,
Nakitisa ndelo ya boyinga!
Nketa ya Botîne ezala na ngai.
Ngai Bienvenu Ntsiene Mongaba
Mwana ya Mabiki Ngamonya na Ntsiene Nkubukusu
Koko ya Mpia Eleme na Keso Ngono
Koko ya Mongaba mo Mbe Puku pe Mbaka-e-Mvumvwa.
Se bongo.