Tozalaki kofanda na quartier Mfumu Nketo na Kingasani. Tozalaki kotanga na Collège Bonsomi na N’djili. Tozalaki kokende na makolo. Kolongwa Kingasani na 06h kokoma na eteyelo na 07h15. Tozalaki kobima na 17h30, kokoma na ndako na 19h. La belle époque!
Lelo oyo tokola, baninga mosusu bazongisa milimo, biso misusu tozali kokoba bomoyi na lolenge nyekese, mama abwaka, towela ndambo ndambo po tokokisa motuya ya mokolo, eyemba Mopao Mokonzi