Italie ezali lokola bilanga ya monene. Bakona masangu na loso. Bisika nyonso masangu na masangu. Na sima loso na loso.
Nawuti na mboka moko Peschiera tii na Torino. 271 km. Nazali na train. Misu na ngai ezomona kaka bilanga na bilanga. Masangu nde masangu, loso nde loso.
Babongisaka mabele na mars. Bakoni. Eboti. Babuki na septembre. Sima malili eye. Bilanga ekufi. Tii mbula oyo ya sima.
Kasi oyo baloni, bakolia mbula mobimba, bakoteka mbula mobimba, bakoleisa bangulu pe bangombe na bango. Basoso bakolia loso.