Elombe akwei te
Kasi awei
Ye oyo alongolaki biso
kobanga koloba
Ye oyo apesaki biso
makasi ya kofungola monoko
Ye oyo amemaki biso
kolongwa na somo ya pomba
Lelo engambe azongi mboka ya Bawei
Ekolo ya mobeko
Yango nde etumba na yo
Ata ko tozalaki mbala mingi na posa
Oloba se liloba moko
Po nyonso epasuka
Otika esopana
Osala emwangana
Kasi yo, olukaki se
Ekolo ya mobeko
Olobi tomibokolo!
Eloko etikali na biso kosala
Tomibokolo
Pema na kimya!
Mwana ya Mulumba
Mowuta Kabeya Kamuanga
Tshisekedi wetu
Mwadiamvita wa Kongo
waaya bimpe!