Bolingo eza compliqué
Auteur : But na Filet
Motema na ngai
Emema nyonso
Ya malamu na ya mabe
Lelo ememi kilo
Estomac na ngai
Elia nyonso
Misuni na ndunda
Lelo elié na yango bolingo
Ata omoni ngai
Naleli nzala
Kopia bilei te
Motema na ngai
Etonda kala
Po bilei ya motema na ngai
Eza yo Fabrice
Nseka na ngai
Ma oo Maa
Bolingo eza compliqué
Motema na ngai
Emema nyonso
Ya malamu na ya mabe
Lelo ememi kilo
Estomac na ngai
Elia nyonso
Misuni na ndunda
Lelo elié na yango bolingo
Ata omoni ngai
Naleli nzala
kopia bilei te
Motema na ngai etonda kala
Po bilei ya motema na ngai
Eza yo
Fabrice
Nseka na ngai
Ma oo Maa
Eza compliqué!
Moto mususu okokanisa
Aza Bailleur
Ya motema na yo
Nzoka aza na ye locataire
Oyo ozokanisa
que azali locataire
Ya motema na yo
Nzoka ye nde, bailleur
Oh Mama oh Mama Mameee
Oh Mameee
Bolingo eza compliqué
Oh Fabrice
Nseka
Eza compliqué
Moto mususu
Okomona ye moke boye
Okanisi aza inapte
Nzoka champion na bolingo
Oyo ozomona ye
Bapaquet ebele
Mema ye na bolingo
Nzoka azali na ye lembele
Ma Ma Ma Ma Mamee
Oh Mamee
Bolingo eza compliqué
Oh Mama Oh Mama
Oh Fabrice
Nseka
Eza compliqué!
Oh
Papa oyo nazwaka ye mushina
Papa ya bato abala na ye
Ye pe azwaka yo réserve
Oh
Petit oyo nazwaka ye moyibi
Ye pe azwaka yo moyibi
Bino na bino miyibi
Oh Mama Oh Mama
Mamee
Bolingo eza compliqué
Okokamwa
Mobali licencié
Alingi illettrée
Mais bazosala love bien
Côté oyo
Mwasi licenciée,
Mobali licencié
Mais bolingo ezosimba te
Elingi koloba
Bolingo etanga te
Rodrigue
Armando
Moto mosusu
Okanisaka que
Aza pasteur
Mema ye na bolingo
Nzoka aza na ye païen
Meka
Okopesa nga raison
Ndenge okobwaka bible
Ndenge okosala film
Ma Ma Ma Ma Mameee…
Oh Fabrice Nseka
Eza compliqué!
Salela ngai bikamwa Yawe
Salela ngai bikamwa Yawe
Oh Mama oh Mama oh Ma
Oh Mama oh Mama oh Meee
Bolingo eza compliqué
Oh Fabrice Nseka
Eza compliqué!
Otaleli ngai
Bobengela ngai
Bolingo eza compliqué
Botala lisusu
Soki nakolela
Soki nakolela
Love eza compliqué
Monano oyo ya Masuwa
bolingo na ngai
ekomi compliqué
Ma Ma Ma Ma Mameee
Appelez-moi l’élève du maître