Na nzembo oyo, Héritier Watanabe azali kobeta lisolo ya mobali oyo azali kolela
bolingo na ye. Mwasi azomonana lisusu te. Mobali azali koluka ye, kasi mwasi, lokola nde
aboyi na ye libela. Mboloko kutu azalaka mosika na zamba, ata lokola bielei, batekaka ye na wenze. Mobali akomi kofionuka, kokonda, kosila, tii kutu kokufa, kasi mwasi aboyi komonana. Alanga nzembo aleli : kolinga moto nzoto ezalaka ngambo boye. Akoma na ye se kolela-lela. Akomi kutu koluka moto nyonso oyo azali na mawa po ye alelela ye. Abombaki bolingo na frigo, lotiliki ekatani, bolingo ekubuki. Totanga. na se natie video Youtube na yango
Zala pene na ngai
Mosika te, Bernadette Masengu
Présence na yo, baséjour na ngai
Bernadette ozali vivante
Tozali na yo pe na même planète
Kasi ozomonana te
Mboloko kutu mosika na zamba
Soki oluki ye ata na Gambela
Okokuta ye ata ya kokawuka
Ngai bolingo ata ya koyita
Ezomonana te
Oza wapi?
N’importe quel jour akoboya ngai
Mutambu, fwidi (2x)
Naza na ngai Balado te
Botuna Muyart
Infraction na ngai ezali je t’aime
Nazofionuka,
nazokonda,
nazosila,
nazokufa
Oza wapi?
masengu na ngai?
Kolinga moto, nzoka ezalaka ngambo
Nzoka ezalaka boye
Solo ya déception nzoka elumbaka boye?
Nzoka ezalaka boye?
Baboya yo, nzoka esuwaka boye?
Nzoka ezalaka boye?
Mutambu, fwidi
Mon commandant, naza na ngai balado te
Botuna Muyart, infraction na ngai ezali je t’aime
Nazofionuka,
nazokonda,
nazosila,
nazokufa,
Bernadette oza wapi?
Masengu na ngai?
Kolinga moto, nzoka ezalaka ngambo
Nzoka ezalaka boye
Solo ya déception nzoka elumbaka boye?
Nzoka ezalaka boye?
Baboya yo, nzoka esuwaka boye ?
Nzoka ezalaka boye?
Mutambu, fwidi
Moto nalingi, alingi te
Nakomi koforcer bolingo ndenge moto ya pusu aforçaka vie.
Alongola bul ya konginda
Idée etikala ya matembele
Aleisa bana,
tolengela bolingo
Na procès na ngai,
nasengi bambanda
botikela ngai Masengu na ngai
Po na Muyart
nakomela poison
Nakokota prison
Motema ezoki
Luka solution
Noki te ngai lilita pene
Ambulance ekumbaka babeli
Ekumbi ngai bokono te
Mama Yemo te,
bokende kotika ngai epayi ya BM
Bana ya suka bakangaka bambula
Nakoki te kokanga balarme
Liziba na matama,
chérie yaka kotorchonner.
Bernadette, bolingo napesa
Il fallait obomba na motema
Obombi na frigo
Courant ekatani
Bolingo epoli
Bitabe elelisa makaku
Bolingo elelisi ngai
Ekomi mbilinga mbilinga mbilinga
Tia na se
mbilinga mbilinga mbilinga
Tinda ata foto
mbilinga mbilinga mbilinga
Nakomi na suka
mbilinga mbilinga mbilinga
Benga ata kobenga
Nasali manso
Chérie alingi na ye ngai te
Chérie akomisi ngai komelesan
Nafungoli agence ya mayi na miso
Soki baboyi yo kolela te
Louer ngai nalelisa yo
Soki pe okufeli, kolela te
Naza prêt ya kolelela yo
Motema ezoki
Luka solution
Noki te ngai lilita pene
Ambulance ekumbaka babeli
Ekumbi ngai bokono te
Mama Yemo te,
bokende kotika ngai epayi ya BM
Bana ya suka bakangaka bambula
Nakoki te kokanga balarme
Liziba na matama,
chérie yaka kotorchonner.
Bernadette, bolingo napesa
Il fallait obomba na motema
Obombi na frigo
Courant ekatani
Bolingo epoli
Bitabe elelisa makaku
Bolingo elelisi ngai
Ekomi mbilinga mbilinga mbilinga
Tia na se
mbilinga mbilinga mbilinga
esprit na ngai echauffer
mbilinga mbilinga mbilinga
bajuge baencadrer marche ya moto na se ya mvula te
olingi nasala nini po oyeba que nalingaka yo?
Meka ata kozwa problème na Leta
Nakosamba na place na yo