Na nzembo oyo Jean Goubald abeti sete na bwale oyo bana na Kongo bazali konyokwama. na esika mwana akende kelasi, asakana lokola baninga, bayibi ye bomwana, bakomisi ye mobomi pe nguba (ebatameli) na bango. Totanga liboso
makomi ya nzembo sima nde tokososola makanisi pe maloba ya Jean Goubald.
Bayibi ngai bomwana
Jean Goubald
Bayekolisi ngai te kokoma
Balakisi ngai kaka se koboma
Bomwana oyo ya masano
natondi te
Bakaboli ngai na baninga
susi te
Au secours
Bayibi ngai bomwana
Malgré ça
Batiki be koswana
Pire encore
Bitumba tokendeke
Basalelaka biso lokola bouclier humain
Moboti nini yango oyo akondima
Oyo ya ye mwana asekana na moto
La guerre est commencée
oyo biso tondima
Piju piju
ya liyoto te
makila ya bato
Au secours
Bayibi ngai bomwana
Malgré ça
Batiki te koswana
Pire encore
Bitumba tokendeke
Basalelaka biso lokola bouclier humain
Nakende kelasi
Po nanini ngai te?
Bokolo na makasi
esimbi na yango ngai te
Nabloka le faux malade
Lokola bacamarade
Le corbeau et le renard
Ata na mwa retard
Nabeta Nitendo
Nabeta mwa judo
Nateta mwa ndika
Nasekana na mayiken
Nabuka madamé
Sentiment ya baBenjamin
Nasekana na kebo
Na modele ya Malebo
Nakende kelasi
Ah ngai motema pasi
L’écolier docile
Est-ce que ekozala facile?
Nakabola mikate
Nasala pe lipate
Kukulu elombe
Mwana ya nyau elombe
Nabeta Nitendo
Pe nasengali na Mapendo
Navuzula Tomboka
Nabanza kotonga mboka
Nalengela avenir
Na oyo ya ngai devenir
Bamauvais souvenir
Je voudrais bien en finir
Bamauvais souvenir
Je voudrais bien en finir
Oh yeleo ya, yeleo ye, yeleo ye (7x)
J’en ai marre de porter les armes
J’en ai marre de couler le sang et les armes
Je voudrais ressembler à vos enfants
Aller à l’école comme eux
Jouer au Nitendo comme eux
Rendez-moi mon enfance
Un bon artiste, naba textes ya malamu. Soki bakomi ata mitano eko zala malamu mingi pona mboka.
Force à Lokua Kanza aussi.
Malembe malembe, bakolanda lokolo na ye. Nyonso eyaka na kolakisa. Tosala makasi bakelasi na biso ezongela kotangisa na ndenge ya malonga, tokomona bayembi ya malonga bakoya.