Babengisa ye na eteyelo na biso

Babengisaki ye na eteyelo na biso. Ye pe ayebaki te po na nini babengisaki ye.Akanisaki ezalaki mbala mosusu nasalaki mobulu, to naboyaki kotosa, to pe soki likambo nini.Asengaki nzela na mosala pe ayaki na eteyelo na biso.

Azalaki kosala na Banque du Zaïre. Lelo ekoma BCC.Ezalaki pene na bangonga ya libwa ya tongo (9h) tango akomaki na eteyelo na biso. Nayebi po asilisaki kosolola na basango tango tolingaki tokende na bopemi oyo ya ngonga ya zomi (10h).

Nazalaki kotanga na Insitut Bonsomi. Ezalaka na Ndjili. Na Quartier 4 na Ndjili.Tango bakomi na suka ya masolo na bango, babengi ngai. Ezalaki Père Paul Smolders pe Charles Veldeman.

Nakoti na salle de lecture esika bazalaki, nakuti tata na biso na basango oyo mibale.Père Paul ayebisi ngai, babengaki papa na biso po na mwa lisolo etali ngai. Masolo eleki malamu. Ngai na tango wana nazalaki na mbula zomi na minei (14).

Nasosoli malamu te.Kasi lokola bango nyonso misato bazalaki na elongi ya koseka, ngai pe esali ngai esengo. Tata apesi bango « Au revoir ». Wana ngai pe lokola babetaki piololo ya bopemi, nabandi mbangu po nakende esika baninga bazalaki.

Tata na biso abengi ngai : – Bien !

Azalaki kobenga ngai bongo. Bokuse ya Bienvenu.Nabaluki.Atandi loboko pe apesi ngai 20K (makuta tuku mibale). Tango wana, mbongo ya bibende ezalaki na tina. Okoki kosomba lipa na mwamba.

Tango nazwi mbongo, na sima na yango sango abengi papa na biso.Elilingi wana etikala ngai na makanisi kino lelo.Tata na biso andimi : « oui mon père ».

Kondima azondima, atandi maboko fixe ndenge tolobaka. Elingi koloba na garde-à-vous lokola soda. Apusani na botosi nyonso pe sango apesi mbote ya bokabwani.

Sima na yango, sango azongi pe tata na biso alaki ngai pe akei.Nasosolaki malamu te po na nini NSENE ÉTIENNE, tata na biso atelemaki lokola soda liboso ya mokonzi. Po na ngai, tata na biso azalaki Nzambe na ngai. Likolo na ye ezalaki na moto te.Sango na biso, po na ngai, azalaki na ye kaka molakisi ya matematiki.

Ata ko nazalaki kotosa balakisi na ngai ya matematiki koleka balakisi na ngai nyonso, bazalaki kaka balakisi. Nsene Étienne azalaki Nzambe. Ebandaki boni akende kotelemela ye fixe ?

Elekaki penza bambula, wana tata na ngai esi akoti na lunga, na molongo ya bakoko, nde nayaki kososola, boni boni kokonzama bakonzamaki na nko, etiaki bango kino na makanisi ete, mondele azali mokonzi.Basango na biso ya Bonsomi, nazalaki kotosa bango ndenge nazalaki kotosa bakambi banso ya eteyelo.

Ezala mindele, ezala bayindo.Na pokwa, tango nazongaki na ndako, natunaki tata na biso kaka po na nini babengisaki ye.Natikala kotuna ye te, po na nini atiaki maboko semba lokola soda. Namilobelaki : « soki asalaki yango, ayebaki po na nini asalaki ».

Kasi elekelaki ngai.Na oyo etali tina babengaki ye, ayebisaki ngai ete : – Basango na bino babengaki ngai po batuna soki nakosepela balengela yo po okoma Jésuite lokola bango. Kasi tata na biso ayebisaki bango, moyen ezali te po tozalaki bato ya misioni. Tozalaki bapresbytérien.

Na boye, nakoma sango te. Tata na biso akufaki tango nazalaki na mbula 17. Tango nakomi na mbula 30, nalongwe mokristu. Nazongeli Nzambe ya bakoko.

Kasi elilingi wana etikala.

Eilingi oyo ezali Tata na biso Nsene Étienne.


Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *