Na nzembo oyo « Anisa », moyembi ayembeli mama ya mwana na ye nzembo po na kobelela bolingo oyo azali na yango epayi na ye. Tokotanga liboso nzembo na suka nde nameki kolimbola nzembo yango.
Anisa amour
Oyo tokoloba lelo
Eleka oyo tolobaki lobi
Bonheur
Richesse
Longévité
Amour
Nzambe apesa
Nabandeli yango mbala misato
Po yango nde eloko eluti motuya
Nabandeli yango mbala misato
Po yango nde eloko eluti motuya
La parole faite chaire
C’est Jésus
L’amour en personne c’est Anisa
Yo Anisa
Yo Ninelle
Mama na Hugues Henri.
Bonheur
Richesse
Longévité
Amour
Anisa amour fou
Anisa azali mbisi ya aquarium
Mais ngai nakolia ye
Po atonda elengi
Atonda bolingo
Aza spéciale
Anisa soki azalaki na tango ya Pharaon
Mbele Pharaon alingaki kozala polygame te
Po kitoko ya basi na ye nyonso
Etonda na nzoto ya Ninelle.
Anisa
Tendresse ya maçon
Na esimbeli ya taloche
Ya ngai tendresse
Esimbeli ya Anisa
Amour ya vrai
Botuna Ninelle
Botuna Anisa
Asukolaka ngai
Apangusaka ngai
Alatisaka ngai
Alambelaka ngai
Aleisaka ngai
Alalisaka ngai
Afinikaka ngai
As’occupaka ngai bien
Atamizelaka ngai
Mwinda ya abat-jour
Tendresse ya maçon
Na esimbeli ya taloche
Ya ngai tendresse,
Esimbeli ya Anisa
Amour ya vrai
Botuna Ninelle
Botuna Anisa
Asukolaka ngai
Apangusaka ngai
Alatisaka ngai
Alambelaka na ngai
Aleisaka ngai
Alalisaka ngai
Afinikaka ngai
As’occupaka ngai bien
Atamizelaka ngai
Mwinda ya abat-jour
Nzambe na ngai
Merci papa
Papa Otshombe
Merci papa
Obota Ninelle
Mama ya mwana na ngai
Obota Anisa
Amour ya vie na ngai.
Nasi nalangwa na ngai
Bolingo ya Anisa na ngai
Nalapa ndayi
Ngai nasuki awa
Nasi naleka na ngai
Bolingo ya moitié moitié
Nalapa ndayi
Ngai nasuki awa
Nazapa na ngai
Balove ya demi-mesure
Yango nabengaka yo
Bébé chérie mama na Hugues Henri
Napesa yo kitoko na ngai
Ya kati pe ya libanda
Exclusivité
Bongo ozwa na yo ngai
Exclusivité
Sala na ngai oyo olingi
Exclusivité
Mama na Hugues Henri
Chérie na ngai
Nasi naleka na ngai
Bolingo ya moitié moitié
Nalapa ndayi
Ngai nasuki awa
Nazapa na ngai
Balove ya demi-mesure
Yango nabengaka yo
Bébé chérie mama na Hugues Henri
Napesa yo kitoko na ngai
Ya kati pe ya libanda
Exclusivité
Bongo ozwa na yo ngai
Exclusivité
Sala na ngai oyo olingi
Exclusivité
Naboyi balongola matiti pene ya lilita na ngai
Bankusu bazolia nzoto bazokipe te
Kasi Bula ebongi oyeba
Mama na Hugues Henri
Azali songe oyo nalotaka
Ata na insomnie
Anisa
Okomisa ngai
Lokola mwana moke
Alelaka biscuit bonbon chocolat
Amour na ngai ekomi elengi
Po naboyi bayiba sentiment ya bolingo oyo
Nabenga chérie
Nasi naleka na ngai
Bolingo ya moitié moitié
Nalapa ndayi
Ngai nasuki awa
Nazapa na ngai
Bolingo ya demi-mesure
Yango nabengaka yo
Bébé chérie mama na Hugues Henri
Napesa yo kitoko na ngai
Ya kati pe ya libanda
Exclusivité
Anisa ozwa na yo ngai
Exclusivité
Chérie na ngai Anisa
Mama ya mwana na ngai
Hugues Henri
Bososoli
Nkotela :
Moyembi abandi na kosakola ete : « Oyo tokoloba lelo, Eleka oyo tolobaki lobi ». Lisakola oyo ezali komonisa boni boni moyembi azali kobelema po na koloba oyo eluti motuya na bomoyi na ye pe azali kozela ete, na bamvula ya sima, bolingo na ye ekoba se kokola. Yango wana, liboso ya kobanda kobelela, asakoli ete : « Oyo tokoloba lelo, Eleka oyo tolobaki lobi ».
Ezala po na lelo, ezala po na lobi, asaleli ngonga ekoya. Ezali po, ata lelo, nanu alobi te, oyo esengeli aloba. Alobi nini?
Moyembi abandi koyemba na bolobaka : « Nabandeli yango mbala misato, po yango nde eloko eluti motuya». Po na moyembi, « Bonheur, Richesse, Longévité, Amour », mamanyoli oyo minei nde eloko eluti motuya. Na Lingala, tokoloba ete, po na moyembi, « esengo, bomengo, bowumeli pe bolingo » yango nde makambo « Nzambe apesa » pe oyo eleki motuya.
Na sima ya kosakola mamanyoli oyo eleki motuya, alanga-nzembo atalisani bato mibale : Yesu masiya pe Anisa Ninelle. Epayi, liloba ya Nzambe ezwi nzoto ya moto. Alanga-nzembo abengi ye : Yesu Masiya. Epayi mosusu, bolingo ezwi nzoto ya moto. Abengi ye : Anisa. “La parole faite chaire, c’est Jésus. L’amour en personne, c’est Anisa ». Awa nde alanga-nzembo ayebisi biso kombo pe mokumba ya Anisa : « Yo Anisa, Yo Ninelle, Mama na Hugues Henri ».
Na moboko oyo elandi, ekomi nde tango ya kobelela pe kokumisa. Alanga-nzembo atalisani Bolingo na ye na mbisi ya mayi-ebatelo (Aquarium). Mbisi oyo atiamaka na ndako basalela ye. Ezalaka po batalaka ye lokola lombe (fleur), eloko ya kokitisa motema. Kasi alanga-nzembo azwi ye lokola bilei oyo ekosilisa nzala na ye. Mbisi ya mayi-ebatelo azalaka moke penza, okolia ye, okotonda pe te. Kasi Anisa azali na ebatelo pe akoki po na kosilisa nzala ya alanga-nzembo. “Anisa azali mbisi ya aquarium mais ngai nakolia ye po atonda elengi ; atonda bolingo ; aza spéciale”. Wana maloba ya Fally Ipupa.
Moyembi atalisani lisusu Anisa na lisanga ya basi ya Faraon. Anisa soki azalaki na tango ya Faraon mbele Faraon alingaki kozala na basi ebele te po kitoko Ninelle elingaki kotondisa motema ya Faraon. Kitoko ya basi na ye nyonso etonda na nzoto ya Ninelle. Wana tozali komona boni-boni alanga-nzembo alula Anisa. Amonaka ye kitoko makasi. Elingi koloba ete, ye moko azali na basi mosusu te po kitoko tonda na nzoto ya Anisa.
Mwa mosika, alanga-nzembo atalisani bonkonde ya Anisa pe oyo ya motongi ndako na mbeli na ye ya mosala. Botawu (tendresse) oyo Anisa alengelaka ye ekokani na botawu oyo motongi ndako alengelaka mbeli na ye ya mosala. Yango wana Fally alobi : “Tendresse ya maçon na esimbeli ya taloche, ya ngai tendresse esimbeli ya Anisa”
Alobi ete oyo azali na posa ya koyeba bolingo ya solo ezali nini, atuna Anisa Ninelle. Na sima atangi misala nyonso ya motuya oyo Anisa asalelaka ye : “ Asukolaka ngai, apangusaka ngai, alatisaka ngai, alambelaka ngai, aleisaka ngai, alalisaka ngai, afinikaka ngai, As’occupaka ngai bien, atamizelaka ngai mwinda ya abat-jour”. Tamiser ezali likelelo na français po na koloba ayungolelaka ye kongenga ya mwinda ya pokwa. S’occuper ezali kokipe.
Awa ko asakoli bolingo, kitoko pe misala ya Ninelle. Fally Ipupa azongisi matondo epayi ya Nzambe pe na Otshombe, tata na Anisa. Awa tomoni ete moyembi asangisi likanisi ya Nzambe-Mokeli pe Tata-Moboti. Ndenge tolobaka ete, baboti bazali banzambe ya se. Mingi-mingi, bato bakumisaka mama oyo abota mwasi. Ezali mbala mingi te, toyoka alanga-nzembo akumisa tata. “Nzambe na ngai, Merci papa. Papa Otshombe, Merci papa, obota Ninelle, mama ya mwana na ngai, obota Anisa, Amour ya vie na ngai”.
Po na komonisa boni boni, oyo azali koloba lelo, alingi etikala oyo akozalaka kolobaka po na libela, alanga-nzembo alapi ndayi epayi ya tata oyo abota Anisa : “Nasi nalangwa na ngai bolingo ya Anisa na ngai. Nalapa ndayi, ngai nasuki awa”.
Alanga-nzembo abaloli miso epayi ya bolingo na ye pe asakoleli Ninelle maloba oyo : “Nasi naleka na ngai bolingo ya moitié moitié (bolingo ya ndambo-ndambo). Nalapa ndayi, ngai nasuki awa. Nazapa (nalongola miso) na ngai balove ya demi-mesure (bolingo ya dongi). Yango nabengaka yo, Bébé chérie mama na Hugues Henri”. Na kosakola oyo, alanga-nzembo akotisi kombo ya mwana na bango, likonzi ya bolingo : Hugues Henri.
Alanga-nzembo afungoleli Anisa motema po ayeba nini ezali kuna : “Napesa yo kitoko na ngai ya kati pe ya libanda exclusivité (kaka po na yo moko). Bongo ozwa na yo ngai exclusivité, sala na ngai oyo olingi , Exclusivité”. Kitoko ya libanda ezali elongi, nzoto… ebongo Kitoko ya kati ezali nini ? Nyonso oyo ya malonga mobali akoki kolakisa na mwasi na ye pe kobelema po na kosalela mwasi na ye.
Abaloli miso epayi ya mokili po basambisi ya nzela bayoka, alanga-nzembo asakoli ete : “Naboyi balongola matiti pene ya lilita na ngai. Bankusu bazolia nzoto, bazokipe te. Kasi ebongi boyeba : Mama na Hugues Henri aAzali songe (ndoto) oyo nalotaka ata na insomnie (pongi ekimi).
Na suka na yango, alanga nzembo amoni boni boni akeyi mosika po na kosakola bolingo oyo. Amitalisani na mwana moke oyo azali kolela bonbon pe shokola. “Anisa, okomisa ngai lokola mwana moke alelaka biscuit bonbon chocolat. Amour (bolingo) na ngai ekomi elengi po naboyi bayiba sentiment ya bolingo oyo, nabenga chérie”. Suka oyo emonisi boni-boni bolingo ezalaka moselu, efandaka penza na mabanga ya siki-siki te. Ayebi ete, lokola mwana moke, baninga pe bakoki koya kobotola. Yango alanga-nzembo alobi eta aboyi bayiba bolingo oyo abenga : chérie.
Ndoba (vocabulaire)
Na loyembo oyo, moyembi asaleli maloba ya mokolo na mokolo kasi alambi yango na ndenge ya malonga. Kasi tomoni pe ete, alanga-nzembo akotisi maloba ya français mingi. Asali lokola oyo babengaka lingala facile, ata ko ezalaka pete kaka na kombo. Maloba lokola bonheur, longévité, exclusivité, taloche, tamiser, abat-jour, demi-mesure, moitié ezali maloba oyo esengaka kolimbola yango po bato basimba tina malamu-malamu.
Makelelo (verbes)
Alanga-nzembo asaleli mitalaka ya libonginyi (tiroirs de conjugaison) na ndenge esengeli. likambo na likambo elobami na ngonga oyo esengeli kolobama.
Asaleli ngonga ekoya (futur) po na kolaka : “oyo tokoloba lelo…”
Po na kosakola bosolo efanda, asaleli ngonga ya ezalisi (présent) : “nabandeli, azali,
Po na kotalanisa na basi ya faraon asaleli soki mbele (conditionnel) : soki azalaki… alingaki
Asaleli mingi ngonga ya momeseno (habitude): asukolaka, alatisaka, aleisaka…
Asaleli makola ezanga likelelo : “Tendresse ya maçon na esimbeli ya taloche, ya ngai tendresse esimbeli ya Anisa”.
Po na komonisa ete oyo akanaki ezali se bongo pe ekotikala se bongo, asaleli eleka pwasa (passé figé) : nalapa, nazapa, obota, napesa.
Po na mposa asali etinda (potentiel) : ozwa, sala