Bato ebele batunaka ngai ndimbola ya liloba oyo « ingeta ».
Ingeta ezali na kikongo. Yango wana natunaki N’longi Makisosila Mawete alimbolela biso yango.
Alobi boye : ingeta elakisi « ainsi soit-il » to na lingala : « ezala se bongo ».
Na boye, tango moto alobi likambo, yo ozongisi : ingeta, elingi koloba, ondimi makambo ye alobi pe elikya na yo ezali makambo yango ekokisama.