Muyembe, Nganga-mayele oyo alonga Ebola

Jean-Jacques Muyembe Tanfun abotama na 1942 na etuka ya Kwilu Na Congo-Kinshasa.

Ayekola kimonganga na Bobongo ya Kinshasa (UNIKIN). Sima na yango akeyi kosala bonganga (doctorat) na ye na Bobongo ya KUL na Beljiki.

Bonganga na ye ezalaki na makambo ya viroloji. Asilisi bonganga na ye na 1973 pe azongi na Congo lokola monganga pe molakisi monene na Bobongo ya Kinshasa (Université de Kinshasa).

Etumba na ya liboso Muyembe abundaki lokola monganga, ezalaki kotelemela bokono ya Kolera oyo ebimaki na engumba ya Matadi na 1974.

Na 1976, bokono ya Ebola ebimi na etuka ya Lingala (na Équateur ya Monene), pene na mayi ya Ebola. Ezalaki mbala ya liboso bokono yango eyokana. Na tango wana, Nganga Muyembe azali kosala lokola monganga na lopitalo ya Yambuku.

Lokola bato babandaki kokufa na mbalakaka, Muyembe azwi likanisi ya koluka koyeba, bokono yango ezali nini pe ndenge Nini ya kosala po na kokundola kisi po na kobikisa babeli. Amekaki kozwa mikolobe yango na nzoto ya bawei kasi boluki na ye epesaki ye biyano ya kokoka te.

Azwi makila ya babeli pe atindi yango na elukelo na mboka Antwerpen na Beljiki po na koyeba, bizaleli ya virisi oyo Ezalaki kopesa bokono yango. Eyaki koyebana ezali virisi yango ezali na lingomba ya bavirisi filoviridae.

Na 1978, Molakisi monene Muyembe akomaki Molakisi-Mokonzi na eyekolelo kimonganga na Bobongo ya Kinshasa (doyen de la faculté de médecine de l’Université de Kinshasa).

Na 1981, akeyi kokoba boluki na ye na oyo etali Ebola, na Institut Pasteur ya Sénégal.
Azali mokambi ya ndako ya boluki na kombo ya INRB.

tango Ebola ebimi na Kikwit, ye nde akendeki na engumba Kikwit po na koyebisa polele ete, bokono yango Ezalaki bokono ya Ebola.

Mbala nyonso bokono yango ebimaka bipayi na bipayi na Afrika, ye nde babengaka po na kopesaayele, nzela nini esengeli kolanda po na kosukisa bopusani ya ebola.

Lelo bamvula 40 oyo ayekolaka na bozindo bokono ya Ebola.

Po na Muyembe, etumba yango ezali na nzela mibale. Ya libosi, ezali, koyekola mikolobe po na kozwa kisi ya koboma yango. ya mibale ezali, koteya bato ya mboka epayi wapi bokono yango ebimi, bayeba kolandela meko ya bopeto pe bokolongonu.

Na mobu 2019, boluki na ye ememaki ete, akundola kisi oyo ezali kobikisa bokono ya Ebola.

Tango bokono ya Ebola ebimaki mbala ya liboso, Ezalaki na etuka ya Equateur, na mboka Ebola. Monganga Muyembe azalaki kosala na lopitalo ya Yambuku. Azalaki na lisanga ya minganga oyo babundisaki po na mbala ya liboso bokono ya Ebola.

Na mobu 2015, alongaki mbano na kombo Christophe Mérieux po na misala na ye ya boluki oyo etali bokono ya Ebola.

kaka Na mobu 2015, alongaki pe mbano ya Royal society Africa prize oyo ekumisaka baluki na makambo ya bioloji na Afrika.

Na 2018 azwaki mbano Mérieux oyo Bobongo ya nzebi (Académie des sciences) napesaka na moluki na makambo etali viroloji.

Na 2019 axuti kolonga mbano ekolo Japon bapesaka na moluki ya Afrika oyo amemi biyano ya malonga n’a etumba ya kolonga makono.

Muyembe Tanfum azali lolendo ya Kongo pe ndakisa po na bilenge koyeba ete, Kongo ezali na posaya bwanya pe komipesa ya Kongolais moko

 

 

Laisser un commentaire

Votre adresse de messagerie ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *